Date & Visites
Jeu 11 Dec 2025.
Visiteurs : 775747
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Refrain :
Ô Nkolo Yesu amonaki pasi
Ô Nkolo Yesu Mpate na Nzambe
LEAD 1 :
Ye wana azali komata ngomba na Golgota
Ekulusu na mapeka na ye alingi nse kokweya
Talani na mutu na ye alati motole na nzube
Makila mazali kotanga na elongi na ye
LEAD 2 :
Mokumba na ekulusu ekitisi mokongo na ye
Ezali ye kotambola kati na banguna na ye
Afungoli monoko te ezaki ye konyokwama
Talani lolenge na ye lokola ya mwana mpate
LEAD 3 :
Ye wana abakami azali na bilamba te
Alobi monoko ya sika na mongongo makasi
Nkunda efungwami, mabanga eningani
Ezipelo epasuki kati na tempelo
LEAD 4 :
Molili makasi eyei na mokili mobimba
Na ngonga ya misatu, oh mokolo nini oyo
Mwese eboyi kongenga, ezali koyoka soni
Ya kotala bolumbu ya Mokeli Monene
LEAD 5 :
Ye wana akeyi na ewelo abimisi abalayama
Mpe bandimi nionso ya kondima na kala
Asekwi uta bakufi, amati kuna na lola
Azongi na molimo mpe avandi na motema
Chœur :
Nkolo Yesu amonaki mpasi
Nkolo Yesu mpate ne Nzambe
Mwese engengi bato bakweyi
Mwese engengi bato bakweyi
Ye Molimo Monsantu awandi na motema
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates