• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Mobali ya libala

Lead1 : Nazali monzoto ya tongo
Azali moyi ya nzanga
Ongengisaka mokili
Na tango ya pasi, ya Yesu,
Ye asimbaka ngayi na loboko,
Apesaka ngayi kimia,
Bolingo na Ye na motema,
Ekopesaka ngayi esengo,
Wolo na nga ya talo
Angengisaka bomoyi na nga
Pe apemisaka ngayi na kimia
Bolingo na Ye suka te
Eeeh

Choeur: Mobali na nga ya libala
Ya Yesu Nzambe bikamua
Bolingo na Ye suka te
Alingaki ngayi na motema na Ye
Akitaki po na bika, bolingo na Ye suka te
Amikomisaki mbeka, ya Yesu
Mbongo ya libala na nga
Makila na Ye esopani

Lead2: Bo Nzambe na Ye bikamua
Mbotama na Ye bikamua
Pe kufa na Ye bikamua
Lisekua na Ye bikamua
Netuama na Ye bikamua
Po azali bikamua
Eeeh
choeur: (Mobali na nga ya libala
Ya Yesu Nzambe bikamua
Bolingo na Ye suka te
Alingaki ngayi na motema na Ye
Akitaki po na bika, bolingo na Ye suka te
Amikomisaki mbeka, ya Yesu
Mbongo ya libala na nga
Makila na Ye esopani)

(Kobatelama na nga se Yesu
Esika ya ko bombama na nga
Ya Yesu Nzambe Ye nguya
Liziba ya mayi ya bomoyi
(Na kende wapi)
Ye nde mobali na ngayi (Yesu mobali na nga)
Ya Yesu mayi esilaka te
Liloba ya suka ezali na Ye
Oyo alobi nde etikali
Po aza oyo asukisi) 2X

Page précédente!