• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Mokongo na Yesu

Lead1: Bisika Y’ozuaki ngayi
Eleki nde mosika
Epayi Yo okotambuisa ngayi
Ngayi na yebi na ngayi te
Miso ya moto emonaka
Oyo ezali pembeni
Kasi oyo emonanaka te
Miso na Nzambe nde emonaka

Lead2: (Molimo na Yo alobeli ngayi
Po Y’osaleli ngayi ya minene
Kasi miso ya moto ekosi ngayi
Etalisi nga moto na pasi) x2

Oh na yango oh oh
(Molimo na Yo alobeli ngayi
Po Y’osaleli ngayi ya minene
Kasi miso ya moto ekosi ngayi
Etalisi nga moto na pasi) x2

Oh na yango oh oh)

Lead3 : (Nga na mati na mokongo na Yo
Po nayebi esika mosusu te
Po Yo ozali mosungi na nga
Na yoka pasi ya nzube te
Bipayi Y’ozali kotambuisa nga
Na yeba to pe na yeba te
Na talela na nga se Yo
Oko pemisa nga na kimia
Ata mopepe ekomi makasa
Bitumba pe ekoki kozala
Na kobanga na ngayi te
Oko pesaka nga elonga) x2

(Nga na mati na mokongo na Yo
Po nayebi esika mosusu te
Po Yo ozali mosungi na nga
Na yoka pasi ya nzube te
Bipayi Y’ozali kotambuisa ngayi
Na yeba to pe na yeba te
Na talela na ngayi se Yo
Oko pemisa ngayi na kimia
Ata mopepe ekomi makasa
Bitumba pe ekoki kozala
Na kobanga na ngayi te
Oko pesaka ngayi elonga) x2

Commentaire : Ata mopepe ekomi makasa
Makasi na nga esuki
Bo nzoto ya bomoyi na ngayi
Na butu Yo nde opemisaka
Motema na nga
Makasi na nga.

Page précédente!