• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Anne


Lokola Anna na tempelo na Silo
Abelelaki oyo akela ye
Molingami ya tango nionso papa!
Yeoshua amashia
Nani ayebaki kati na motema ya Anna
Ata motumbi mbeka Eliya
Ayebaki te nini ezalaki kolelisa motema na mwasi
Eyiii!

Lokola Anna na tempelo na Silo
Abelelaki oyo akela ye
Molingami ya tango nionso papa!
Yeoshua amashia
Natuni,nani ayebaki kati na motema ya Anna
Ata motumbi mbeka Eliya
Ayebaki te nini ezalaki kolelisa motema na mwasi
Ayiii

Motema! Motema! Motemaaa!
(Motema na ngayi!Motema na ngayi!)
Oyebi yango,
Oyebi yango!
(Boseka nga te, boyebi kati ya motema te)

Motema! Motema! Motemaaa!
(Motema na ngayi!)
Oyebi yango,
Oyebi yango!

Nalangwe teee, Jehovah
Nalangwe teee,
(Boseka nga te baninga na nga)
Allelua ah baba
Na ye kosopa motema na ngayi, na Yeoshua amashia)
(Na ye kosopa motema na nga)

Nalangwe teee, Jehovah!
Nalangwe teee!
Alleluaa Baba!
Na ye kosopa motema na ngayi, na Yeoshua amashia!
Nabeleli mongongo ekawuki
Ooh
Ooh! o Nkolo!o Nkolo! yokamela nga!
Oh nalela na mongongo nini’ango!
Ooh o Nkolo o Nkolo yokamela nga!

Oh lolenge nini Esther asalakieee!
Ooh o Nkolo o Nkolo yokamela nga!
Oh lolenge nini Anna alelaki!
Ooh o Nkolo o Nkolo yokamela nga!
Po Yo opesa Samuel!
Na mona pe natatola Yesu!

Nalangwe teee, Jehovah!
Nalangwe teee!
Alleluaa Baba!
Na ye kosopa motema na ngayi, na Yeoshua Yeoshua amashia Yeoshua amashia!

Nalangwe teee, Jehovah!
Nalangwe teee!
Alleluaa Baba!
Na ye kosopa motema na ngayi, na Yeoshua amashia!

Commentaire :Molingami na ngayi
A melaka masanga te A melaka masanga te ooo
Alleluaah
Ooh nalingi na yebisa ye motema na ngayi
Ooh na sopa yango lokola Anna
Alleluaa Baba
Ooh yokamela mongongo ya motema
Ooh Yeoshua Yeoshua Amashia Yeoshua Amashia
Yoka mongongo ya motema)


Nalangwe teee, Jehovah!
Nalangwe teee!
Alleluaa Baba!
Na ye kosopa motema na ngayi, na Yeoshua na Yeoshua na Yeoshua amashia!

Nalangwe teee, Jehovah!
Nalangwe teee!
Alleluaa Baba!
Na ye kosopa motema na ngayi, na Yeoshua na Yeoshua, Yeoshua amashia

Page précédente!