Date & Visites
Mar 16 Dec 2025.
Visiteurs : 777976
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Boseka ngai te mpona naza na biblia na maboko
Esika nionso nakonde nkombo ya na monoko Oo
Basali ya Nzambe oyo baza koteya biso ntango nionso boyebi te nini oyo Nzambe asalela bango mpo basalelaka Yeee
Okomona ngai ntango nionso na nzela kaka ya ecclesia
Oyebi te nini oyo Nzambe asalela ngai mpona na kendaka ecclesia
Ahh moto kutu oyo ya mokili soki apesi eloko
Osengi merci eee
Ebongo Nkolo ya pema topesi nini
Okomona ngai ntango nionso naza kokombola ecclesia
Oyebi te nini oyo Nzambe asalela ngai mpona salelaka Ye eeee
(Ahh Ngai yo ooo
Nazali reconnaissante eee
Makambo asalela ngai ya minene Papa Oyo ooo
Nawuti na libulu ya masumu
Abimisi ngai Yo ooo
Esika nazalaki ya liwa Ye abimisi ngai
Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga eeee
Pongi na ngai na butu kaka ba tondo ya mabe
Nani akopesa ngai loboko moto na moto na oyo ya ye
Nakanisaki libota ekosunga ngai
Epesaki ngai mokongo
Nasimbaki moto na kolela aaa
Pasi elekelaki ngai yo Nzambe eeee) X2
Ah ngai yo ooo
Bomoni tina ngai nalingaka Ye eeee
Nalapa ndayi na vie na ngai yo nakosalela eee
Abeta ekuke ya motema na ngai
Nafungoli akoti
Ye wana camarade ya motema na ngai yo Nzambe
Moto na moto na ngonga na ye
Abetak ekuke ya motema na ngai na fongoli y akotiiii
Ye wana camarade ya motema na ngai ooo
Ye wana thermomètre ya temperature na ngai ooo
Ye wana mayi na ngai ya komela ekitisaka ngai motema
Ye wana bileyi na ngai ya kolia na ntango ya nzala eee
Ye wana manteau na ngai na tango malili
Ye wana makasi na ngai tango nalembaka Papa Yo ooo
Ye wana réanimation ya pema MISAMU eeee
Nzambe Yo ooo
Ye wana parapluie na ngai yo na tango mbula
Ye wana kisi na ngai ya komela na tango maladie
Ye wana asili pasi na ngai Papa Yo ooo
Ye wana alongola soni Papa Yo oooo
Nzambe Yo oooo
Ah ngai yo ooo
Bomoni tina ngai nayembelaka Ye eeee
Nalapa ndayi na vie na ngai yo nakosalela eee
Abeta ekuke ya motema na ngai
Nafungoli akoti
Ye wana camarade ya motema na ngai yo Papa
Moto na moto na ngonga na ye
Abetak ekuke ya motema na ngai na fongoli y akotiiii
Ye wana camarade na ngai Ye eeee
Ye wana moninga na ngai ya motema Ye eeee
Ye wana makasi na ngai Ye eeee
Ye wana mayi na ngai ya komela
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates