Date & Visites
Mar 16 Dec 2025.
Visiteurs : 777990
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Ndeko, ba pasi mosusu eyelaka biso okomi flou, sombre
Dans le néant, okomi mort
Kasi bwaka miso na yo na likolo bisika lobiko na yo ekowuta
Est-ce que oyebaka oza acteur ya film mpe Yesu nde réalisateur
Est-ce oyebaka acteur akoki koniokwama na ebandeli kino na kati kati me na suka alongaka
Lelo ba nzinzi bakomi ba consolateur na yo, ba ko consolateur fâcheux ya pota na yo
Me bwaka miso na Yesu, Ye wana mobambi ya ba pota ya mitema
Ndeko, ata okomi lokola moto oyo aza kokatisa ebale na singa molayi
Maboko elembi yo na kati kati, azo koka lisusu te kokoma na ngambo mosusu
Nzoka na ngambo nde esika eyano nayo okozua
Sala makasi, kamata trompette betela Nzambe yango nde libondeli na yo nde okokoma na ngambo
Nalingaka kozwa ndakisa oyo mingi ya Jacob, Jacob alobi nako tika Yo te, nakoti tee kino oko pambola ngai ata obuka ngai mopanzi, nako tika Yo te
Ô oo Nzambe, biso nionso tolo na nse tozo zeal ba promesse nay o kino eko kokisama
De toute le façon okanga biso singa na kingo, Nzambe okanga biso ba craka, toko kimela Yo wapi
Fongola esiii obungisa, kadena okanga biso surtout ngai nakokimela Yo wapi, nakokimela Yo wapi Nzambe na bomoyi
Ngai na bengaka Yo, Monsieur le raison na tina, ata olelisi motema na ngai, olelisi ngai, me lobi na koseka, ebongo ntango na koseka, nabosani ba pasi oyo nazalaki na yango liboso, Monsieur raison ya bomoyi ya bana na Nzambe
Nani akoki kozua pasi ya moninga ekoma ya ye, nani akoki kokoma kino na liwa mpona moninga na ye abika, yango babengaka yo bouc emissaire, eza na tina, Nzambe na tingami kaka Yo, ata lelo okomisi ngai lokola Job, nako finga Yo te, nako sala Yo mpe mabe tee, nako kangama na Yom po nayebi ete lobiko na ngai ekowutaka na nse na mayi, mayi liziba, bobele Yo mayi na liziba, elonga na ngai
Soki lelo omoni okomi lisusu na ntina te na libota, na quartier, na mosala me kima na ville de refuge
Oyebi ville de refuge soki eza nini ?
Kasi yang onde ecclesia esika tolalisaka moto na biso
Na bengaka Yesu aza coussain na ngai
Ntango na lembaka, Ye nde ako consolaka motema na ngai
Yango ntango nionso na lobaka lobela ngai na litoyi ya droite oyo sekele bato bako yoka te
Yango nde libondeli
Nzete ya mbila
Mayi ya komela
Bileyi ya kolia
Makasi na ngai
YESU
Omoni Yesu asopaki makila na ngomba ya Golgotha,
Me voile epasukaki
lelo, ngai nakoki kobondela, nakoki kokende liboso na Ye ako répondre ngai
Nzoka na kala ezalaki bongo te, omoni,omoni ndenge tobiki, omoni ndenge afungoli biso porte, omoni ndenge afunoleli yo motema
Me ndeko bondela ti, Ye nde eyano na biso, Ye nde babengi Ye Docteur du salut,
Ye nde le Créateur
Ye nde Solution
Babengaka Ye Porte, Porte ya bénédiction
Mobali na libala
Yango nalingaka Ye mingi
Nayembeli Ye loyemb o oyo
Nalobeli Ye makambo oyo mpo a comprendre
Oh Ndeko yo mpe comprendre mpo Yen de suka ya bomoyi ya bato
Ye nde suka ya mitema na biso
AMEN!!
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates