• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

7. Lamentations

Papa tokende lisusu epayi na nani
Yo moyoki ya losambo, yoka kolela ya motema oyo ezoki mingi

Nkolo Yesu Yo muana na Nzambe
Yo nde mitema ya basantu etalelaka
Bayaki na Yo bazongaki pamba te
Papa malamu oyebi olaka pasi ya bana
Ozali moko oy’aza na makoki
Ya kopesa biyano na bayike na mbala moko
Ô Yesu, ô Yesu, papa malamu Yesu, Nzambe ya solo
Ooo yaya ekimelo na nga
(Ya Yesu, ya Yesu, ya Yesu)
 Yesu, mpinjoli na nga etangi
(Mpinjoli na nga etangi)
Ô Yesu, nakomi na suka

 Yesu
Ô Yesu mpinjoli etangi
Pasi na motema na kaba lisolo yango nani
Ata na yebisi moto ako kokoma te
Pasi na motema miso ya moto ekoma ndenge nini
Na leli lokola Yowane na Patmos,
Nani alingi nga alongola nga pasi oyo
Na leli pangusa nga mayi ya miso ô Yesu
Yesu muana Nzambe motema na nga eleli mingieeee

(Nayebi Y’ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
Motema epona se Yo
Yo Nkolo ya bomoyi na ngayi) x2
Oyo esalaka ngayi, pasi na motema
N’ekulusu, omemaki yango
Yesu muana Nzambe, pikola na mosisa
Oyo nionso elelisaka ngayi
Zala papa, nazala muana
Ngolu na Yo, ebomba ngayi

Eeeeee Eeeeeee

Mpinjoli na ngayi, papa etangi mingieee,
(Etangi mingieee)
Na bilble pona nga bilaka esili to ninieee
Na gangi o secours, mongongo ekawuki ngayi
Na lingi nayeba nini ezo pekisa Yo osalaaa
Soki pe lisumu, loba na tubelaaa
Po pasi oyo nazo koka lisusu teee
Soki pe ya baboti tope bakoko na ngayi Yesu
Banza ekulusu, makila osopaki pona ngayi
Tout est accompli, maloba na Yo
Boni ya nga likambo, Yesu ezangi solution
Telema moto ya suka eee

(Nayebi Y’ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
Motema epona se Yo
Yo Nkolo ya bomoyi na ngayi) x2
Oyo esalaka ngayi, pasi na motema
N’ekulusu omemaki yango
Yesu muana Nzambe, pikola na mosisa
Oyo nionso elelisaka ngayi
Zala papa, nazala muana
Ngolu na Yo, ebomba ngayi

Nayebi Y’ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
(Elikia ya basantu)

Page précédente!