Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776521
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Lead 1 :
Bomoyi na nga kozanga Yo eza pasi nde pasi
Nakoki te nalonga yaka nzambe Osala
Soki y'Osali te mosusu nani akoki kosunga nga
Sala Nzambe sunga Nzambe banguna bakamwa
Yaka Y'osala, yaka Y'osunga
Banguna bakamwa, bikamwa tomona
Refrain :
Yaka Y'osala, yaka Y'osunga
Banguna bakamwa, bikamwa tomona
Lead 2 :
Papa nakolela pasi oyo elekeli nga
Mimonisa kati na nga elikia na nga se na Yo
Batioli nga baniokoli babwaki ngai, nani akokamba ngai
Yango naye epai na yo Papa yamba ngai
Lead 3 :
Na maladie oyo nabika bakamwa,
Na kosanga oyo, ngai nazwa bakamwa
Na bitumba oyo nalonga, basamwa
Sala Nzambe, sunga Nzambe, banguna bakamwa
Refrain (2x)
Lead 4 :
Banguna bakosaka ngai wapi Nzambe na yo
Balobi Yokufa, sala Nzambe oza na bomoyi
Natika kolela, komitungisa Yesu oza na bomoi
Loboko na yo ekosala, banguna bakokamwa
Lead 5
(Denis Ngonde) :
Nakotalela mokili te, nakotalela moto te
Na bilaka na yo Papa nakondima tii na suka
Nakobungisa kondima te yo nde Osimbi bomoyi na ngai
Suka suka Y'okosala yo nde Musungi na ngai Ozali na bomoyi
Lead 6
(Matou Samuel) :
Nga nalula bazwi te po yo Nzambe opesaka bozwi
Wolo palata eza ya yo Nzambe Papa, nga nakangama kino suka
Yaka Osala na bomoyi na nga, yaka sunga bolenge na nga
Banguna bakamwa Ozali bozwi na ngai, bikamwa tomona iiiüü
La la la la la Papa na ngai sunga ngai nalonga Nzambe mokili batioli ngai nalonga
Chœur :
Mboka oyo etonda bozwi Papa sunga Congo
Banguna bakamwa Yo Mosungi elikia ya mabota nionso ya Congo
Lead 7 :
Sala na mangomba
Sala na bandimi
Sunga basali na yo, nguya na yo tomona
refrain
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates