• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

5. YESU AZALI AWA

Na ngambo ya Egypito molili êê
Na ngambo ya Israël pole ebimi êêê
Bisika Yesu eyebanaka
Presence na Ye, pole na ngai
Sanduku ya mibeko ekeyi wapi êê
Ekeyi kopambola Obed Edom
Bisika Yesu aza ebungana te
Presence na Ye, lipambola na ngai
Ah! Yaya
Parole: Bapekisa nionso kasi bapekisa yo koluka Nzambe te
Na makolo nde bisika tobombama

Yesu azali awa x7


Esalaka ngai neti liboma
Soki Yesu na ngai akiti awa
Nayebaka te napesa nini
Nionso nazali eza se Yesu
Andima ngambo ya bomoyi na ngai êêê
Andima ngambo ya mikumba na ngai
Andima ngambo ya bitumba na ngai êê
Bolingo ya boye namona te ôôô
Ba misusu ba mata ti ba ngomba êê
Ba belela Ye, Ye ayoka bango te
Ngai na tombola kaka maboko ya pamba ââ
Akiti mbangu ayoka losambo êê
Êêêêêêê

Yesu azali awa (X4)

Na ngambo ya Egypito molili êê
Na ngambo ya Israël pole ebimi êêê
Bisika Yesu eyebanaka
Presence na Ye, pole na yo
Sanduku ya mibeko ekeyi wapi êê
Ekeyi kopambola Obed Edom
Bisika Yesu aza eyebanaka ââ
Presence na Ye, lipambola na yo êê
Êêêêê

Yesu azali awa (X7)

Parole: Yo moto olingi makambo ebonguana
Yo moto ozo supporté ba bêtises ya satana na vie na yo
Moment yango yango oyo
Sala geste moko
Lobela Ye maloba
Il est là pour t’écouter
Il est prêt
Il peut encore te relever
Il peut encore te restaurer
Il peut encore te guérir
Il peut encore te toucher
Il peut encore te pardonner
Il est là (X3)
Jésus est là (X4)

Soki Yo te mbe nasila na ngai
Yo nde nionso ya motuya na ngai êê
Eêê Yaya
Mobimba na ngai se maya na Yo
Mobimba na ngai se ngolu na Yo
Ondimela ngai tango moto andima ngai te
Ngai nalingi Ye êê
Yo nde nionso ya motuya na ngai êêê
Soki Yo te mbe nakufa na ngai îîî
Zalaka pene na ngai êêê
Eh! Yaya.

Page précédente!