• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

11. MUANA NA MPATE

Parole : Muana na mpate, Moko te azalaki na makoki ya kosala oyo Nzambe kaka nde akokaki kosala
Yango wana azui liloba oyo ezalaki Nzambe mpe asaleli yango nzoto oyo abotamaki
Azalaki Nzambe
Alléluia!
Sepela bipayi ezali yo
Motema na yo etondisama na esengo
Parce que poussé le monde le ressuscité
Alléluia!

Okokisa makambo nionso na ekulusu.
Pona ntina na ngai Ô Yesu.
Yaya Okokisa makambo nionso na ekulusu.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Nzambe monene alati mposo ya bomoto.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Nkolo wolo mpalata abotami mpene ya bibuele.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
L’avocat auprès du Père azangi eloko ya koloba.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Mokonzi ya mapinga babeti Ye na basoda.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Ye ko Le Roi des rois balatisi Ye ekoti ya nzube.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Aâ Yesu!

Aâ Yesu Muana na Mpate Obongi na lokumu
Aâ Yesu!
Aâ Yesu Muana na Mpate Molongi ya balongi.

Okokisa makambo nionso na ekulusu.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Ondima liwa ya somo na ekulusu.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Mokeli na nionso akomi Mosali ya mabaya.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Nzambe na nkembo basambisi Ye na ekelamu.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Kino aganga na ekulusu : « tout est accompli».
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Eli Eli lama sabachkatani Yesu aleli ngo.
Pona ntina na ngai Ô Yesu
Aâ Yesu!

Aâ Yesu Muana na Mpate Obongi na lokumu
Aâ Yesu!
Aâ Yesu Muana na Mpate Molongi ya balongi.

Yango nayembi Muana pate
Muana Mpate x2
(Muana na Mpate)
Muana Mpate
(Muana Mpate)
Muana Mpate
(Muana na Mpate)
Muana Mpate
(Muana na Mpate êê)
Muana Mpate
(Mpate na Nzambe)
Muana Mpate
(Mpate êêê Mpate na Nzambe)
Muana pate
Azui bisika na ngai ya mbeka liboso ya Tata
Muana pate
(Muana na Mpate êê)
Muana pate
(Bisika awuti bamoni te)
Muana pate
(Nzoka nde awuti likolo)
Muana pate
(Apesami bisika ya liwa ya bato Yesu masiya ngo)
Muana pate

Yesu êêê elonga na ngai
(Elonga na ngai ââ)
Yesu êêê elonga na ngai
(Yesu elonga na ngai ôô)
Yesu êêê elonga na ngai
(Tokozonga lisusu sima te êê)
Yesu êêê elonga na ngai
(Congo ezali mboka ya elaka)
Yesu êêê elonga na ngai
(Ngonga ya Nzambe ebeti na mboka oyo)
Yesu êêê elonga na ngai
(Molongi akoti esika biso tolonga )
Yesu êêê elonga na ngai
(Ils l’ont vaincu à cause du sang de l’agneau)
Yesu êêê elonga na ngai
(Il les a livrés publiquement)
Yesu êêê elonga na ngai
Muana na mpate
(Muana na mpate)
Muana na mpate
(Mpate êêê Mpate na Nzambe êê)
Yesu êêê elonga na ngai
(Mpate êêê Mpate na Nzambe êê)
Yesu êêê elonga na ngai
(Sujet ya masanjoli na ngai)
Muana na Mpate
(Elamba na ngai ya kembo)
Muana na Mpate
(Esengo ya motema)
Muana na Mpate
(ekuke oyo ekotisi na kembo)
Muana na Mpate
(Mpate na Nzambe azui bisika ya pasi ya bandimi)
Muana na Mpate
(Apetoli mitema)
Muana na Mpate
(Abimisi minzoli pene ya Papa)
Muana na Mpate
(Tokomi basantu mpona Yo)
Muana na Mpate
(Yo nde x4, Mokonzi ya Bakonzi)
Muana na Mpate
(Yo nde x4 elikia motema)
Muana na Mpate
(Yo nde x4 mopangusi minzoli)
Muana na Mpate
(Yo nde x4 Elombe mobali)
Muana na Mpate
(Yo nde x4 elikia motema)
Muana na Mpate
(Yo nde x4 elengi ya kozala)
Muana na Mpate
(Yo nde)

Page précédente!