COURONNÉE
Album Couronné
COURONNÉ /
TRINA FUKIAU
Towumelaki kati ya molili
Tala Yesu aye na pole na ye
Mobali ya nguya, motema malamu
Ata mwana mobola Yesu abuakaka ye te
Abokoli nga asuki wana te
Apesi ti bomoi na ye pona nga
Nakoma kolinga ye eh eh eh !
Nakoma kolinga ye
Pene na kufa
Nakoma kolinga ye eh eh eh !
Nakoma kolinga ye
Pene na kufa
Lire tout le texte!
OZUAKI NGA NA ZÉRO /
TRINA FUKIAU
Abengi nga moninga,
Abengi nga mosali,
Alobi alingi nga,
Asepeli nazala ya te,
Yesu ayaki epayi na biso,
Koluka nani abongi
Asopela ye Mafuta,
Apesa ye kiti ya bakonzi
Bilombe bakenda sango
Kitoko pe ya Mayele
Mokili esi eponi bango
Kasi Yesu atalaka motema
Lire tout le texte!
LOBOKO YA NZAMBE /
TRINA FUKIAU
Loboko ya Nzambe eza mokuse te
Elongolaka moto na bowumbu
Ekomisa ye héritier ya promesse
Tango ekoki ya bana na Nzambe
Nan'ango alingi alongua na mawa
Atiela kaka Yesu oyo motema
Soki mwana moto ataleli Nzambe
Elongi na ye elonguaka na soni
Nan'ango alingi ayeba ya motuya
Ya oyo Nzambe akani asalela ye
Atombola miso na coté ya Minzoto
Bolamu ya Nzambe eleki ebele
Lire tout le texte!