• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

6. OBONGI NA LOKUMU

Paroles : Alléluia ! Alléluia ! Monisa Nkembo na Yo, Obongi na lokumu
Obongi na Nkembo mpe na masanjoli moyengebene
Nzambe ya solo nde Yo
Tofukami liboso na Yo, tokiti liboso na Yo Mokonzi
Alleluia

Kombo na Yo ekumisama
Mpo Yozali Nzambe
Bolingo na Yo efanda na mitema
Yozali Nzambe
Mpe nionso efukamela Yo
Mpo lokumu ezali ya Yo
Netolama Nkolo na nionso
Togumbameli Yo
Yesu

Yo molingami na nga
Bomoyi na nga eza ya Yo
Na nse ya ngolu na Yo
Namona nkembo
Yozali Nzambe

Mpe nionso efukamela Yo
Mpo lokumu ezali ya Yo
Netolama Nkolo na nionso
Togumbameli Yo
Yesu

Nani abongi
Na lokumu lokola Masiya
Oyo liloba na ye eza nguya

Bipayi binso
Bomoyi bojali Yojali Nkolo
Nionso efukama na kombo na Yo

Yobongi na lokumu
Yofandi na bisika
Bileki na nkembo
Nkolo na bolingo nionso

Yo nde Nzambe na nguya
Mokokisi na bilaka
Nkembo eza ya Yo
Zua lokumu Nkolo

Nazala lokola Yo
Sala ete bomoyi na nga
Na ya Yo ezala moko
Natatola mpe nayemba ete
Yobongi na lokumu

Nani aza lokola Yo
Otombolaka nkita
Mpe lokumu lua Mboka
Totatoli mpe toyembi ete
Yobongi na lokumu
Alléluia
Paroles : Ozali Nzambe oyo obongi na lokumu
Ozali na Nzambe oyo atomboloka nkita ya ekolo
Alléluia
Otombola lokumu ya mboka Nkolo na bomoyi
Nzambe mboka Congo eza Yo
Tomisopi liboso na Yo
Mpo ete oza Nkolo Nkolo
Oyo asengeli afanda na ngwende ya mboka oyo


Yobongi na lokumu
Yofandi na bisika
Bileki na nkembo
Nkolo na bolingo nionso

Yo nde Nzambe na nguya
Mokokisi na bilaka
Nkembo eza ya Yo
Zua lokumu Nkol

Nazala lokola !

Nazala lokola Yo
Sala ete bomoyi na nga
Na ya Yo ezala moko
Natatola mpe nayemba ete
Yobongi na lokumu

Nani aza lokola !

Nani aza lokola Yo
Otombolaka nkita
Mpe lokumu la Mboka
Totatoli mpe toyembi ete
Yobongi na lokumu

(Totatoli mpe toyembi ete
Yobongi na lokumu) X4

Page précédente!