Date & Visites
Mer 17 Dec 2025.
Visiteurs : 778686
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Tango mokili ebanda ââ
Ozalaka Nzambe
Toko koba ozali kaka Nzambe ôô
Toko leka oko tikala kaka Nzambe êê
Fanda na Yo Nzambe mosusu azali te êê
Fanda na Yo azali te
Basusu ba bengi Nzambe na Abraham
(Nzambe na Abraham)
Basusu ba bengi mokeli na likolo mpe na nse
(mokeli na likolo mpe na nse)
Basusu ba bengi Nzambe na boboto mpe na kembo
Ngai nalobi ete kombo na Yo elonga
Ngai nalobi ete kombo na Yo elonga
Kombo êê kombo na elonga
Kombo na nguya
Na kombo na Yesu, babeli bako bika êê
Na kombo na Yesu, bawa bako sekua
Bokoki kobelela ba kombo nionso oyo bolingi êêê
Ngai nako belela kombo na Yesu
Ebongo totala ba nani balongi êê
(Kombo x5
Kombo na masiya)
Bokoki kobelela ba kombo nionso oyo bolingi êêê
Kombo na masiya Nde kombo na elonga
Kombo êê kombo na elonga
Kombo na nguya
Na ekulusu ba bakaki Ye mpona yo mpona ngai
Ekoti na moto
Sete na maboko
Mopanga na mopanzi êêê
Yaya Yesu, Yaya Yesu, Yaya na ngai moko
Satana akanisaki alongaki nde kolonga
Kasi na mokolo ya misato
Yesu abimaki nde molongi
Alobaki yango
Azali nde Nzambe
Akosaka te êê Yesu azali nde elonga
(Nzambe oyo ayokaka tango nabelelaka kombo na Ye
Nanu na mona te
Moto nani bayeba
Elikia ya ba oyo ba buakama
Yo nde Nzambe na elonga
Esika bato bakangi êê
Yo nde ofungolaka)
Kombo êê kombo na elonga
Kombo na nguya
Yesu abonguani te
(Elie abelelaki moto, Yo okitisaki moto
Papa oyo ya David
Yo nde Nzambe ya ba Nzambe
Na kati ya ba konzi Y onde mokonzi
Oyo akotelemela Yo ako wuta wapi
Eêê Yesu
Yesu abonguani te
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates