• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

11. TEMOIGNAGE

Makambo mosusu bakoka ko expliqué yango te ôô
Temoignage mosusu okoyeba ndenge ya kobandela te ôô
Likambo yango na Yesu
Sekele yango na Tata na muana êê
Moto moto na moto na litatoli na ye êê
Oyo yanga litatoli yango yôô

Nakomaki lokola muasi azan a zemi
Zanza libua azo bota te ôô
Nani akisa ngai mokumba naza ngo ôô
Ekole na ngai na nzoto
Eboyi kotika ngai ye êê

Nakomaki lokola moto akoti zamba
Abungi nzela ya kobima êê
Nani alakisa ngai nzela mpona na bima êê
Miso mpe ezo mona malamu te êê

Hum! Somo na ngai lokola esclave aza ko tourné
Tout autour ya maitre na ye
Kino asenga liberté na ye êê
Mpo motema efanda kimia

Hum! Kombanga na ngai lokola sentinelle
Azo zela tongo etana azua kimia
Mpo mokumba azua na vie na ye
Akengela mpo moyibi akota te êê

Kombanga lisusu lokola bébé
Azo lela ntango nionso êê
Bongo maman aluka pasi aza ngo ôô
Mpo monganga abikisa muana êê
Eî pasi etingami na nzoto êê ma
Wapi mongongo oyo elekisa biloko ngai êê
Nzoto ekomi ko décevoir elamba ya kolata wowo ôô
Wapi monoko na kangisa pasi na ngai êê
Nani yango nayebisa ba pasi na ngai êê
Avocat aza wapi a plaidé mpona pasi na ngai êê
Aâ! Juge aza wapi akatela ngai likambo êê
Mpo mapsi boko tika ngai êê

Parole : Ah! Moyibi to liwa ya nini eyiba to eboma ba pasi na ngai etika ngai bomoyi

Soins intensifs ekoma ekomaki mbeto nan gai ya libela êê
Prof nini apesa ngai mateya ya kokima pasi ya molimo êê
Monganga nini asala ngai opération ya pasi ya molimo êê
Motuka mpe mpepo nini emema ba pasi na ngai mosika na ngai êê
Masuwa mpe lokalo nini ebuaka ba pasi na ngai na lubuaku êê
Volcan to mopepe nini êê Yaya
Rivière mpe mbonge nini emema ba pasi na ngai esika elingi êê
Mafuta to mpe savon nini na pakola na longola ba pasi na ngai êê
Kiti mpe mbeto nini na lala natikela ye ba pasi na ngai êê
Eê Yaya,
Yaya
Yaya na ngai êê ôô
Aâ êê mpo pasi eboyi kotika ngai êê
Ba mpasi ezingaki ngai
Nayokaki solo ya liwa yeye
Ngai nakomaki na suka
Pasi eyokisaki ngai liwa yeye êê
Nzoka Yesu Klisto mosungi ya kokamua êê
Akufaki mpona biso to bika ôô ma
Amemaki mikumba na biso mpo tozua liberté êê
Liberté na ngai
Liberté na ngai êê
Liberté na ngai êê
Yesu Klisto Liberté na ngai êê ma
Aâ Yesu Klisto Liberté ya famille na ngai wowo ôô
Aâ Yesu Klisto Liberté ya Congo

Aâ Yesu Klisto
Aâ Yesu Klisto êê ââ êê
Liberté na ngai ôô
Okokuta ngai maboko na moto
Nazo zela liberté na ngai êê
Aâ ngai na tie mabongolo na se
Nazo zela liberté na ngai ekoka êê
Nasimbi motema na ngai
Liberté oza wapi êê
Aâ liberté na ngai êê
Liberté na ngai êê
Yesu liberté oza wapi îî
Likama
Likama na ndimaki te ekokomela ngai boye
Ekokomela ngai boye
Aâ Yesu Klisto
Aâ Yaya ya baleki êê
Liberté na ngai êê
Yaya oza wapi êê

Page précédente!