• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

9. KUMAMA

Mpisonzili na ngai ya mawa
Lelo ebonguana koseka
Nandimaki te na kozua kimia êê
Na bomoyi na ngai êê
Mpona nini na seka lelo
Na bongama mpona pasi ya lobi
Ekoyela ngai êê
Ya solo ekoyela ngai êêê

Nzambe, Nzambe na ngai
Eî Nzambe oyo Nzambe na ngai
Sala ngai lokola wolo na maboko ya bijoutier êê
Diamant cuit pesa ngai forme oyo olingi
Ngai oyo mosika nazalaka na kati ya zamba
Nani amona ngai
Olongoli ngai na zamba
Okotisi ngai na ndako ngai mpe na lia na mesa
Yo motu olatisaka mukuwa ya kokawuka poso
Opesi bomoyi
Olanda ngai na fulu êêê

Ngai elnge muasi na nzela êê
Nani asunga ngai êê
Baboti babuaki na nzela êê
Nani akolokota ngai êê
Aâêê nayeba te yeye
Papa ya bana etike mame
Yo nde mosungi ya Congo

Yahweh kumama na Yo Yaya êê
Kumama na Yo êê
Yahweh kumama na Yo Yaya êê
Kumama na Yo êê
Ââ nakoti te ôô
Nakoti te ôô
Nako mema Yo na motema kino suka êê Yaya
Nako buaka Yo te
Yo nde mosungi ya kokamua ôô
Mosungi ya kokamua ôô
Nanu namona te ngai te mobali ya boye na mokili
Mobali kitoko ôô
Soki okufeli mobali kima epayi na Ye
Mobali ya ba veuve ôô
Soki Papa ya mokili aza lisusu te Yesu êê
Yo Papa ya bitike ôô
Ââ mosungi ya kokamua êê
Mosungi ya kokamua êê
Elikia ya ba santu êê
Elikia ya ba santu ôô
Ngai natingami na Yo Yaya êê
Natingami na Yo ôô
Ngai natingami na Yo Yaya êê
Natingami na Yo ôô
Olingi kombo ya sika
Êê Tingama na Yesu êê
Natingami na Yo ôô
Botika ngai kimia nayembela Tata ya pembe
Natingami na Yo ôô
Nalingi nayembela na ngai Tata oyo likolo ya cheval ya pembe
Natingami na Yo ôô
Kumama na Yo êê
Kumama na Yo êê
Yahweh kumama na Yo Papa êê
Kumama na Yo êê

Yo nde pharmacien ya ba kisi nionso ya molimo ôô
Soki javel ekomisaka elamba pembe êê
Bongo makila na Yo ôô
Namona na miso na ngai bato ya sida kobika ââ
Makila na Yo antidocte ya poison
Mobikisi ya cancer na zona ezali Yo
Yesu êê Yo nde Jéhovah Rapha ââ
Nakotiko te
Mpona nini kolekisa tango na ngai na matongi
Na tingama Yesu ya kala
Na tingami na Yo êê
……………….ekoti nzoto kolekisa tango pamba te tingama se Ye
Na tingami na Yo êê
Soki mabota eza te koelkisa tango te tingama Ye mpe talela Ye
Na tingami na Yo êê
Soki bobola etingami bomoyi na yo ôô
Na tingami na Yo êê
Boni ofandela kombo ya moninga na yon a monoko tonga ata Yesu
Na tingami na Yo êê
Namesana na ngai na Tata oyo ya suki ya pembe êê
Na tingami na Yo êê
Nakoma kobimisa solo ya Yesu na nzoto
Na tingami na Yo êê
Satn akoma kizunguzungu na kombo ya Yesu na ngai
Na tingami na Yo êê
Êê Yaya mono mame
Na tingami na Yo êê
Satana akoma kobanga
Êê Yaya mono mame
Na tingami na Yo êê
Mpona Yesu na ngai bendele ekueya te Yaya
Na tingami na Yo êê
Êê Yaya mono mame
Êê Yaya mono na nge
Na tingami na Yo êê
Ngengisa ngai muinda mieno
Na tingami na Yo êê
Ngengisa ngai muinda mieno ôô
Na tingami na Yo êê

Page précédente!