• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

8. REALITE

Ozui malade êê
Okeyi epayi ya dokotolo ba lobi malade na yo eza na kisi te
Eza réalité ya vie
Aâ yo obotaka te êê
Minganga ba condamna yo ba lobi vie na yo mobimba oko simba muana te
Ondima réalité ya vie mame
Ndeko owuti kobungisa ndeko na yo
Akotaki na koma minganga basali nionso balembi
Balobi akufi na ye
Oyo mpe eza réalité ya vie mame êê
Basusu bakanga bango na mpungu êê
Elengi ya libala bayokaka kaka na sango
Suka suka bazonga ndaku ya baboti
Oyo mpe vraiment eza réalité ya vie
Ngai êê nayebi mpe mosala maboko êê
Esika nionso nako beta porte ata toza ba bale
Bako zua moko batiki ngai êê
Eza réalité ya vie
Vie na ngai nde somo
Papa, vie nde problème
Nakoya kokufa pamba êê
Soki otiki ngai nasambue kosambue êê
Vie na ngai pasi êêê
Libota na ngai pasi
Libota na ngai somo
Na tinu balobi na ndima réalité ya vie
Mpona nini basusu bazuaka
Basusu bamonaka pasi Nzambe êê
Moyi ebimaka mpona moto nionso êê ma
Mbula ebetaka mpona moto nionso
Butu eyindaka mpona moto nionso êê ngai êê
Moyi ebimaka mpona moto nionso êê
Natuni balobi ngai na ndima réalité ya vie
Namoni pasi êê
Vie na ngai nde pasi êê
Nakoya kokufa pamba ngai êêê
Soki otiki ngai nasambue kosambue êê
Kombo na Yo ekoya ko tshiolama pamba Nzambe na ngai êê
Ngai bazo tuna ngai wapi Nzambe na Yo
Aza wapi êê
Réalité ezalaka kaka boye
Vie ya moto kaka boye
Condemnation ya moto ya mokili ezalaka kaka bongo
Kasi eza na Maître moko
Soki akoti na motema na yo
A changaka histoire ya vie êê
Impossible ekomaka possible ôô
Kombo na Ye Jéhovah Jiré
Kombo na Ye Jéhovah Shaloom
Kombo Alpha et Oméga, ebandeli mpe suka ôêô
Kombo na Ye Nzambe malamu êê
Nalela Yesu na ngai

Yesu ûû
(Aâ Yaya)
Yesu ûû
Solution ya vie na ngai êê Papa êê
(Nalingi na betela Ye ba pasi na ngai nayebi te ndenge nini ya kobanda êê
Yesu kota na ba chambre ya motema obimisa ba pasi eleyi nde nzoto)

Yesu ûû
(Aâ Yaya)
Yesu ûû
Solution ya vie na ngai êê Papa êê
(Na tika te na koma êê basombeli ngai lilita
Ba sombeli ngai lopango
Nakufa lelo lobi mosika
Nzambe na ngai olobi nini

Yesu ûû
(Olobi nini êê)
Yesu ûû
Solution ya vie na ngai êê Papa êê
(Ngai nakomi na suka)

Hum! Nazanga Papa êê, nazanga maman êê
Y onde okoma nionso na ngai êê
Yesu Y onde Papa ya bana bitike ôô

Yesu ûû
(Sunga ngai)
Yesu ûû
Solution ya vie na ngai êê Papa êê

Tata vie na ngai somo, vie na ngai pasi, vie kokamua êê
Bapesa ngai ba kombo ebele na mokili
Na kima wapi
Soki otiki ngai na sambue ko sambua
Kombo na Yo ekoya ko tshiolama pamba êê
Yaya bazo tuna ngai wapi Nzambe na yo êê
Oza wapi
Oza wapi êê
Tata oza wapi ôôô
Tango Yo olakaki ngai êê
Tozalaki biso mibale
Bilaka na Yon a motema
Na bombi makasi êê
Yaya na ngai nazo zela cri ya suka êê
Soki Yo ogangi ba nguna bakimi êê
Yaya soki osali te tokoti ndaku êê
Oza wapi êê
Yaya oza wapi ôô

Page précédente!