• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

7. GRAND AIGLE (PONGO)



Likambo ezuaka kaka moto
Mokolo yango ekomelaki Yesu
Akufa mpo ngai na yo to bika ôôô ngai yo
Nzela mosusu ezalaki te mpo ngai nay o to bika ôô
Kaka liwa êê ya mpongo ya monene

Likambo ezuaka kaka moto
Mokolo yango ekomelaki Yesu na ngai ôôô
Akufa mpo ngai na yo to bika ôôô ngai yo
Nzela mosusu ezalaki te mpo ngai nay o to bika ôô
Kaka liwa êê ya mpongo ya monene

Yahweh alembi
Êîî
Mpongo anuni
Êîî
Motoki ebonguani makila ôô
Bilamba batie wapi êêê
Bakabioli yango na tirage au sort
Aââ mokolo yango molili ekotaki na mboka êêââ
Basaleli ngai Ye mabe makasi ôô
Nzoka atikaki kiti ya bokonzi ya Tata ôô mpo ngai nay o tobika ôô
Ba memaki Ye na ekulusu ba buekeli soyi ba melisi Ye vinaigre ôô
Bakamati maboko na makolo batoboli êê
Ôô quelle ingratitude ôô
Lokonga na mopanzi ngo ôô
Nzube na moto na Ye
Nani apesa Ye kisi mpo atika ko saigné ôôô
Nionso wana mpo ngai nay o to bika

Êê mpongo alembic êêîî
Êîî
Nkosi na ngai anuni
Motoki ebonguani makila ôô
Bilamba batie wapi êêê
Ba betaki yango nzete êê
Mââ yango molili ekotaki na mboka êê mâê
Basaleli ngai Ye mabe makasi ôô Yesu ôô
Nzoka atikaki ya bokonzi ya nyambe mpo ngai nay o tobika ôô
Ngai nabengaka Ye Mpongo ya monene ôô
Nabengaka Ye Nkosi ya libota na Yuda
(Nkosi ya libota na Yuda ôô)
Mpasi elekaki Ye ôô
(Mpasi elekaki Nzakomba ôô)
Akimaki na suka mboka ôô
(Muana na Nzambe aleli ôô)
Miso elembaki Ye ôô
Mokongo elembaki Ye ôô
Monoko elembaki Ye ôô
Manzaka elembaki Ye ôô
Atunaki Tata soki okoki kolongola coupe oyo liboso ngai êê
Nazo mona mpasi êê, nazo yoka mpasi êê

Ebongo yo oza mpongo ya moke ôô
Soki mpasi eyeli yo ndeko
Êêê kima na suka ya mboka ôô
Senga na Nzambe akopesa yo ôô
Akopesa yo miso omona mosika ââ
Êê akopesa yo mapapu êê
Akopesa yo manzaka êê
Hum! Akopesa yo makasi êê
Mpo ye aza mpongo ya monne
Nabengaka Ye nzete ya mobesu
Ebongo yo nzete ya kokawuka ôô
Moto te akufa mpona ngai êê
Papa na ngai te ôô, mamana ngai te ôô
Yaya mpe leki te ôô
Mobali mpe muasi te ôô
Noko mpe mama leki te ôô
Akufa mpona ngai nabika êê
Hum ! kaka mpongo ya monene

Nasalelaka Ye na tina
Eêîî
Nayembelaka Ye na tina
Eêîî
Kima na suka ya mboka esika oko zua eyano na yo
Likolo ya ngomba ôô
Yango nde libondeli
Oko botama na mboka monene ôô
Ye nde Yesu masiya ôô

(bomoyi nionso napesa na nani)

Eêîî
Motema na tia ko wapi êêê
Kima na suka ya mboka esika oko zua eyano na yo
(Yesu)
Likolo ya ngomba ôô
Yango nde libondeli
Okokutana na Yaya
Ye nde Yesu masiya ôô
(Soki mpasi ebandi komema yo na suka
Eêîî
Kima epayi ya Papa
Eêîî
Kima na suka ya mboka esika oko zua eyano na yo
(Yesu, belela Papa oyo)
Likolo ya ngomba ôô
Yango nde libondeli
Okokutana na Yaya
Ye nde Yesu masiya ôô

(Ntango nakomaka na suka na kima epayi na Ye ôô)
Eêîî
Kuna na suka mboka
Eêîî
Kima na suka ya mboka esika oko zua eyano na yo
(Yesu oza wapi ôô)
Likolo ya ngomba ôô
Yango nde libondeli
Okokutana na Yaya
Ye nde Yesu masiya ôô

Parole : êê Papa Déo INDULU soki pasi ekomeli yo kima na suka ya mboka esika ya mpongo ya monene

Parole en dialecte (Lontomba)

Page précédente!