• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

6. TEMPERATURE

Nani aza na thermomètre ya koyeba température ya hum ya molimo moto
Nani azan a balance ya koyeba kilo ya vie ya moto ôô
Nani aza na mètre oyo eko lakisa molayi ya molimo ya moto yeye
Nani akoki kotimola libulu molayi mpo ayeba mozindo hum ya molimo moto
Bobele Yesu êê

Wapi université oyo eza na mateya ya kokamba vie hum ya molimo ya moto
Wapi parlement oyo ekoki ko siégé mpona ko voté ba lois hum ya molimo ya moto
Wapi gouvernement oyo eza na ba ministres ya kokamba hum vie ya molimo moto
Wapi mboka oyo eza na roi to règne ya kokamba vie hum ya molimo ya moto
Bobele Yesu

Paroles : Ah! nani aza na site internet ya ko permettre biso to navigué mpona toyeba vie spirituelle ya moto

Mosusu okomona moto likolo likolo lokola moto ya masumu êêê
Ye wana Nzambe aza kolinga ôô
Mosusu okomana ye akotambola na logome elamba epasuka
Ndeko keba minister monene ôôô

Tuna mikonzi minene ba fanda na kiti ya bokonzi
Ba wuta wapi?

Okomona babeteli yo porte basengi yo mayi ya komela âââ
Ndeko koboya te ôôô
Mosusu babengana ba ange na porte na bango
Yesu soki afungoli yo miso mpo omona vie ya moto okoki kofukamela ye
Aââ ngai ôôô
Bible eloba éthiopien a changaka peau na ye te ôô
Leopard mpe a changaka ba taches na ye te ôô
Lelo moninga pamba oyebi lobi na ngai te Yesu azo mona ngai moto monene
Aââ ngai ôôô

Yo moninga malade Yesu azo mona bien
Yo moninga mobola Yesu azo mona ngai riche
Likolo ya ba sentiments na yo obengi ngai moto na masumu
Âââ yeye yeye

Ko jugé ngai te
Ko jugé mpe ngai te
Oyebi lobi na ngai
Oyebi mpe vie na ngai te
Nani akoki kotombola libanga abamba muasi oyo akueyi na ekobo êêê

Likambo yango nini lelo basali ya Nzambe êê
Nzambe moto atia bango na ecclésia na ye
Mikumba oyo bamemaka soki bapesi ndeko okokoka te
Babengaka bango ba fou na kati ya ecclesia, ba blésseé de guerre, grand coopérant na makambo ya ecclésia, ba koko ya suka mboka ma
Bilamba epatuama na kati ya ecclésia

Marie Magdala asopi malasi na ye ya motuya na makolo ya Yesu
Neti babengi ye ndumba ââ nzoka yende amonaki lisekua ya Yesu liboso
Nakotambola moto likolo na kobeta tolo êêê

Hum ndeko na ngai yo! Ne jugé point
Hum ne jugé point
Ndeko na ngai ne jugez point mpo ba jugé yo te
Ne jugé point
Tika Nzambe a jugé basali na Ye ôôô
Tika Nzambe a jugé bato na Ye êêê

Page précédente!