• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

3. ASSOCIE

Soki na tali bomoyi na ngai êê
Ngai nani na beta tolo
Nazalaki elili ya pamba
Bomoyi, nzoto molimo nakaba na Satan êê
Bato ba bandakio tala ngai
Bakomaki koloba na confessé
Mpo bapasi elekaki ngai êê
Balobaki ezali etumbu ya Nzambe na ngai

Ngai nakende wapi ngai oyo
Natia elikia epayi ya nani
Balobi eza Papa moko aza capable ya kozua ngai en charge
Natie moto bakata na ndimi êê
Associé êê
Associé na ngai Yesu

Associé yoyo
Associé na ngai Yesu x2

Baninga ngai nakima Nzambe ndenge nini ôô
Atindaki muana na Ye moko êê
Asopa makila mpona ngai nabika ôô
To signa contrat na makila ya une longue vie

Associé yoyo
Associé na ngai Yesu x2

Ngai nazali nzete bino bi étape
Eloba Ye moko Jésus
Moïse amonaki nzete
Epeli moto ezo zika te
Yoka seke ya ngai na Yesu
Nzete aziki te, étape ekozika ndenge nini

Associé yoyo
Associé na ngai Yesu x2

Ah! Mokili oyo pasi
Moto na moto na moto na ye
Oyo ya ngai na pona Jésus
To signa contrat makila êêê

(ôô Yaya, associé na ngai Yesu)

Associé yoyo
Associé na ngai Yesu

(Parole en tshiluba)

Associé yoyo
Associé na ngai Yesu

Eê Yahweh êê x2
Asalaka nini
Eê Yahweh êê Nzambe miracle êê
Bikisa ngai ê, sekwisa ngai ê
Aâ Yahweh

Eê Yahweh êê x2
(Asalaka nini êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato
(Ata ba buaki yo, bamoni pamba, Yaya azali êê)
Eê Yahweh êê x2
(Asalaki nini êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato
(Moninga ya temps nionso)
Eê Yahweh êê x2
(Alembaka te, abuaka te êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato
(Kombo na Ye Yesu êê)
Eê Yahweh êê x2
(Asalaki nini êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato

Ba bombi bombi ngai êê
Akoki te Yahweh
Nasopi baposa na ngai na se mokano Yo
Longola ngai soni

Esika oyo bakundi ngai êê
Est-ce que omona bakomi na se ya libanga molili
Bimisa ngai êê
Bimisa ngai êê

Ba douleurs na oyo yo
Epesi ngai maloba Yaya
Ya kolobela na litoyi Yaya êê
Répondre na cas na ngai

Eê Yahweh êê x2
(Ntango ya pole ekoki)
(Asalaki nini êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato

Eê Yahweh êê x2
(Tala soni na ngai emati nzete)
(Asalaki nini êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato

Eê Yahweh êê x2
(Eê belema belema Yo okota bana)
Toluki Yo butu mpe moyi Yo ozali wapi êê Yahweh êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato

Eê Yahweh êê x2
(Yahweh êê Papa, Yahweh êê yoka)
(Tia kombo na ngai na liste ya pamboli na Yo)
Alongolaka batu soni na miso ya bato

Eê Yahweh êê x2
(Obosanaka te ba promesse Y’opesaka na bana na Yo)
(Répondre na cas na ngai êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato

Eê Yahweh êê x2
(Yaya oza wapi olongola soni êê)
Alongolaka batu soni na miso ya bato.

Page précédente!