• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

LOKUTA ELATI KAZAKA

1. Sango ewuti na Africa ekomi na Eropa
Sango ewuti na Eropa ezongi na Africa
Balobi lokuta elaki kazaka oh
Ekoti na ndako na Nzambe baklistu babeti maboko
Lokuta elati kitoko bato mingi babanzi ekomi nde vérité

2. Lokuta elobi fulani asali cassette ya témoignage
Lokuta elobi songolo azali koyemba na kisi
Lokuta elobi pakala asila nde kokufa
Baklisto ya minyato balangwisi bango na lokuta
Lokuta ekamati ascenseur po ekoma mbangu
Vérité elandi ya n'escalier se malembe
Ata ndele lokuta ekosambwa, vérité yango nde ekotriompher

Refrain :
Mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga
Mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko
Bazali kobosana vérité yango nde ekotriompher ata ndele bakofuta

3. Sango ewuti na Africa ekomi na Eropa
Sango ewuti na Eropa ezongi na Africa
Lokuta abandaka na jardin ya edene : Adam na Eva baliaka mbuma se pona lokuta
Lokuta ekoti na ndako ya Abraham : Aprésenter mwasi na ya lokola sœur na ya
Lokuta ekoti na mboka na Ezipito : Mwasi ya mokonzi alobi Yozefu aluka ye makangu
Lokuta elangwisi bakonzi ya Loma : Bamobi Yesu asekwi te balobi bayakoli bayibaki Ye
Lokuta ekoti Anania na Safira : Bkosi lingomba na biloko batekaki
Lokuta ekoti lelo na lingomba ya Masiya elati kazaka bato mingi babongoli yango vérité

Refrain : Mawa na bato oyo … ndele bakofuta

Page précédente!