Date & Visites
Sam 13 Dec 2025.
Visiteurs : 776061
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Na méritaki te ôôô
Na forcaki te ôôô
Oyo ekomeli awa lelo boye
Na avoué que eza se ngolu êêê
Oublier par le monde
Repérer par ta grâce
Bomoyi ezui tina êêê
Ngolu epesi ngai kiti esika mokili epimaki ngai
Bomoyi na ngai ezui tina ôôôô
Bisika nasengelaki ete ba tanga ngai na nzela ya ngolu
Nazui kombo ezui tina
Eêîîî
Ba tangi se na nzela na ngolu
Esengo na ngai se nzela na ngolu
Ndoto na ngai elati nzoto lelo ôôô
Se na nzela ya ngolu ya Papa na ngai
Na méritaki te ôôô
(Je n’ai pas fourni assez d’effort)
Na forcaki te ôôô
(Kasi bokonzi eyei koluka ngai na zamba)
Oyo ekomeli awa lelo boye
Na avoué que eza se ngolu êêê
Na bundi bundi te na bomoyi
Na méritaki te ôôô
(Ngolu nde repère ya bana na Nzambe )
Na forcaki te ôôô
(Yesu êêê)
Oyo ekomeli awa lelo boye
(ye nde mokolo lipamboli na ngai)
Na avoué que eza se ngolu êêê
Nani azangi tina na se na moyi
Aluka Nzambe oyo asalaka ngolu
Nani aluki azui te sika awa boye
Aya epai ya Tata na biso mosali na ngolu
Ngolu oyo elokotaka bato oyo ba buakama
Ngolu epesaka koleka oyo tosengi
Ngolu matabisi ya lola oyo esalaka esengo
Ngolu epangusaka pisoli ya bayengebene
Na se moyi x2
Mpe ebosanisi ba pasi pe libela âââ
Na méritaki te ôôô
(Eza na makasi ya nzoto te)
Na forcaki te ôôô
(Na mayele ya campus te)
Oyo ekomeli awa lelo boye
(Na avoué que eza se ngolu ya Nzambe)
Na avoué que eza se ngolu êêê
Ekatisi mondelu na kana te na bomoyi
Na méritaki te ôôô
(Ekomisi ngai na ngambo ya bato babonga)
Na forcaki te ôôô
(Ngai moto na wuta na zamba ngai oyo)
Oyo ekomeli awa lelo boye
(Na avoué na ngai)
Na avoué que eza se ngolu êêê
Je ne sais pas me justifier
Na méritaki te ôôô
(Na tina ya bolamu oyo ezo komela ngai)
Na forcaki te ôôô
(Lelo awa boye ngai oyo)
Oyo ekomeli awa lelo boye
(Nayebi te nalobi nini ngai oyo)
Na avoué que eza se ngolu êêê
Eza na yango mabondeli na ngai te
Na méritaki te ôôô
(To pe ba sacrifice mpe kaka te)
Na forcaki te ôôô
(Ngolu ezangi jusitification na vie ya moto)
Oyo ekomeli awa lelo boye
(Na avoué eza se ngolu)
Na avoué que eza se ngolu êêê
Bato to tanga bango
Bazui mosala oyo te ngai oyo
Na méritaki te ôôô
(Bato tokola na quartier ba bali libala oyo te)
Na forcaki te ôôô
(Ngai oyo)
Oyo ekomeli awa lelo boye
(Na avoué na ngai)
Na avoué que eza se ngolu êêê
Na biki na maladie oyo ebomi basusu
Na méritaki te ôôô
(Ngai oyo)
Na forcaki te ôôô
Oyo ekomeli awa lelo boye
Na avoué que eza se ngolu êêê
Ngolu, mathématique ya Bonzambe oyo
Oyo Bato ya mayele bazo koka kososola te
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates