• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

DIEU DE LA BIBLE

il est écris voici je vais une chose nouvelle
Elle est sous le point d’arriver
Nalingi nasala makambo ya sika
Ekomi pene pene na koko kisama
Nani abongisami mpona kozua makambo ya sika
Alléluia! yo muana na Nzambe kanga motema

Ndoto ya pamba alotaki
Elukelaki ye problèmes
Bateki ye kuna akendaki batiaki ye na prison
Lokola êê eloko na Nzambe
Ezalaki kati na ye
Na prison hum na bokonzi êê
Mpe bafukamelaki ye
Koba koba !

Kobanga te muana na Nzambe
Ata ba bosani yo ôô
Nzambe oyo ya biblia
(Ba yaya)
Aza Nzambe ya makambo ya sika

Parole : ne rougit pas car tu ne seras pas déshonoré
Mais tu oublieras la honte de ta jeunesse
Et tu ne te souviendras plus de l’opprobre de ton breuvage
Car ton Créateur est ton époux
L’Eternel des armées est son nom
Alléluia! ôô yes

Asajona atekaki sekele ya makasi na ye
Bakangi ye, babeti ye
Mpe ba tsumoli misu na ye
Lokola na alliance na Nzambe
Ezalaki na suki
Ebotaki mpe makasi na ye nionso ezongaki
Koba, koba!


Kobanga te muana na Nzambe
Ata ba bosani yo ôô
Nzambe Oyo ya Biblia
Aza Nzambe ya makambo ya sika

Baseki yo
Obota te êê
Yebisa bango ba bang ate
Mpo Nzambe oyo apesi libala
Ye nde akopesa mpe se yo
Yo okobosana soni oyo oyokaki liboso ôôô
Oko yemba loyembo oyo
Mpo aza Nzambe ya makambo ya sika


Kobanga te muana na Nzambe
Ata ba bosani yo ôô
(Nzambe oyo x3)
Nzambe Oyo ya Biblia
Aza Nzambe ya makambo ya sika


Tala mpongo ndeke oyo
Bazua lolenge ya isu
Koseka te soki omoni masala na ye ebebi
Soki amati na ngomba
Amikuanzi na libanga ââ
Ya kala elongue
Ya sika ebimi
Mpe ako pumbua mosika
Koba, koba

Kobanga te muana na Nzambe
Ata ba bosani yo ôô
(Iye lele lele)
Nzambe Oyo ya Biblia
Aza Nzambe ya makambo ya sika


Parole: akokaki kotia makasi ya Samson na miso te
Mpo esengelaki ezala na suki
Mpo suki ata bokati yango eko bota lisusu
Alleluia!

Kobanga te muana na Nzambe
Ata ba bosani yo ôô
(Iye lele lele)
Nzambe Oyo ya Biblia
Aza Nzambe ya makambo ya sika

(Nzambe ya makambo ya sika)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(alongolaka moto na putulu)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(ata ba trompes nay o bakata â)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(ata nzoto nay o ebeba)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(Azongisaka ba relation ekufa)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(ata libala na yo ekufi)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(êê Nzambe oyo x2)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(Nzambe oyo x2)
Aza Nzambe ya makambo ya sika
(Nzambe oyo x2)
Aza Nzambe ya makambo ya sika

Page précédente!