• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

VANDA KIMIA

(Oyo etombolaka kondima na ngai êê)
Mpo aloba ako tika ngai te
(Eê oyo epesaka ngai ba assurances na ba biens)
Mpo andima kovanda na ngai
(êê motema)

Motema na ngai batela kimia
(Motema x2)
Mpo yo osimbami na loboko
(Oô motema na ngai)
Ya Oyo aleki na nguya
(ââêê)
Moto te ako bebisa yo
(ata na butu)
Ata na butu
Ata na moyi
Natalelaka se Yo Yesu
(ôô Yaya)
Yo olakaki oko sunga ngai
Soki pasi ekomeli ngai

Parole: Ekomami boye ete:
Batela kimia
Mpo ete Yesu Ye moko ako bunda
Mpo nay o
Motole nay o eko banda kongenga
Na kati na maboko na ndako na Yahweh
Alleluia!
Kobanga te mpona na banguna na Yo
Nzambe Ye moko ako s’en chargé na bango
Alléluia !

(Yango na kanga monoko na ngai)
Na nionso oyo ekoyela ngai
(ôô na bitumba oyo nazo bunda, Elonga)
Elonga eza na Yo Yesu
(Ata na komiîî)
Ata nakomi pene ya kufa
(Kufaââ)
Ete nasilisa nzoto oyo
(Nzoto na ngai oyoyo)
Elikia ezali na kobika
(Nzoto na ngai ôô)
Mpo ete Yo olakaki ngai bomoyi
(Ata nzete oyo)
Ata nzete oyo bakati
Soki misisa eza na se
(Elikia ezali)
Elikia ezali ekobima
(Bongo ngai te)
Ebongo ngai te mowumbu na Yo
Yes

Parole : Mokili bakoloba na yo
Oza heureux
Mokili bakoloba na yo
Oza muana na Nzambe
Car il est ecrit: Voici mon serviteur prospérera
Il montera, il s’élèvera et
Il sera très très haut placé
Yes !

(Nakanisi tango Haman êê)
Alingaki abotama Mardochée
(êêîî Na butu, Mokonzi azui buku ya souvenir)
Amoni bolamu ya Mardochée
(Bongo na tongo)
Na tongo makambo ebaluki
(Na tongo x2)
Moto alingaki akufa
(Na tongo tongo)
Ete ye akomaki mokonzi
(Alleluia!)
Mpe mokonzi azuaki liwa
(Bongo mutambu oyo)
Mutambu soki eza oyo
Elingaki eboma Mardochée
(Alléluia! Yango e bomake êê)
Yango ebomaki Hamana
(Moyengebene)
Moyengebene alongaki
Alleluia!
Se! Yes!

Parole: Nazo se sentir securiser na maboko ya Nzambe
Sécurité ewuti epai na Yesu
Ngai nakotikalaka jamais kobondela lisusu
Mpo ban guna na ngai bakufa
Esengeli bazala wana
Batalaka ngai ndenge nazo pambuama
Ndenge Nkolo azo tombola ngai
Yes

(Kobanga te mpona ba nguna na yo)
Nzambe Ye moko ako bunda
(Eîî ata batimoli libulu ba kunda yo)
Bango moko bako kundama
(êê motema x2)
Motema na ngai batela kimia
(Motema na ngai)
Mpo yo osimbami na loboko
(Motema na ngai yo)
Na Oyo aleki na nguya
(Motema na nai yo)
Moko te akobebisa yo
(ata na butu)
Ata na butu
Ata na moyi
Natalelaka se Yo Yesu
(Alléluia! X2)
Yo olakaki oko sunga ngai
Soki pasi ekomeli ngai
Oô Yes !

Parole : Nkolo na ngai
Liziba ya bomoyi ngai ezali Yo Nzambe
Eê nazo ndima ete oko tika ngai te
Esika na échouaki
Na bandeli nde esika wana
Mais mbala oyo mpona ko échouer lisusu te
Mais mpona ko réussir
Enfin que ba oyo nionso batiaki ba cal
Bakoma ba escale mpona ngai
Alléluia !

Page précédente!