• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

ASALI FETI

Muasi ya mokonzi sepela
Muasi ya mokonzi bina
Yo oyo Nzambe aponi, sepela

Asali feti
Abengisi
Kasi batu abengisi baboyi na bango koya
Alambi biloko na masanga
Kasi batu alambeli baboyi na bango koya
(Ezali pasi)
Ezali pasi na mokolo ya feti oyo
(oyo ôô)
Tango abebisi mpona kolamba bilia
(Ezali pasi)
Ezali pasi na mokolo ya feti oyo
(oyo ôô)
Batu abengisi baboyi na bango koya

Paroles : Yo oyo oponami sepela mpo bato babengisi baboyi koya na feti
Kasi yo oponami kumisa Nzambe
Mpo oza muana ya elaka

(Atiîîî)
Atindi mpe
(ba invitation)
Ba invitation
(Epa ya ba ndeko na ye)
Batu abengisi baboyi na bango koya

(Atiîîî)
Atindi mpe
(ba invitation)
Ba invitation
(Epa ya ba ndeko na ye)
Batu abengisi baboyi na bango koya
(Ata)
Ata baninga
(Oyo)
Ya motema
(Mokolo yango)
Mokolo ya feti baboyi na bango koya
(Eêê ezali pasi)
Ezali pasi na mokolo ya feti oyo
(Ezali pasi)
Tango abebisi mpona kolamba bilia
(Ezali pasi)
Ezali pasi na mokolo ya feti oyo
(Feti yango)
Batu abengisi baboyi na bango koya

Paroles : Mawa na mokolo feti oyo, mawa

A changé décision atindi basali na nzela
Bakende kobenga bato nionso mpo baya
Ba pona ekolo to mpe loposo te bakota ââ
Kolia na mesa ya mokonzi îî
Ekutanaki na ngai moseka nazalaki wana
Nakotaki pe na ndako ya roi
Oyo esengo ndako namonaka na mosika ââ
Lelo nazui ngolu ya kokota na ndako ya roi
Mesa mokonzi oyo batu ya minene baliaka ââ
Ngai muana nalie na mesa yango
Ezali esengo ndako na tala na mosika ââ
Lelo nakoti mpe na fandi na ndako ya roi
Biloko ya mokonzi ekomi pe ya ngai îî
Mpo bato babengaki baboyi na bango koya
Yango mokonzi abengi nga muasi êê

(Â ati)
Atindi mpe
(ba invitation)
Ba invitation
(Epa ya ba ndeko na ye)
Batu abengisi baboyi na bango koya

(Eêê)

(Atiî)
Atindi mpe
(ba invitation)
Ba invitation
(Epa ya ba ndeko na ye)
Batu abengisi baboyi na bango koya
(Ata)
Ata baninga
(Ata ba)
Ya motema
(Mokolo yango)
Mokolo ya feti baboyi na bango koya

(Eêê ezali pasi)
Ezali pasi na mokolo ya feti oyo
(Ezali pasi)
Tango abebisi mpona kolamba bilia
(Ezali pasi)
Ezali pasi na mokolo ya feti oyo
(ôôô)
Batu abengisi baboyi na bango koya

Alléluia ! Alléluia !
Nzambe kumama

Feti yango moto asalaki Nkolo Yesu
Ba invite nde bazalaki bana Israël
Babengaki bango baya kolia biloko ya pamba ââ
Oyo basombi na mbongo te
Basali lolendo
Mokonzi a changé décision
Atindi basali na nzela ââ
Baluka nga José moseka nakota na ndako
Lelo nakomi mpe muasi ya mokonzi nasepeli îî
Mpo nionso ya mokonzi ekomi pe ya ngai
Lelo nakomi kobengama muasi ya roi
Nakomi héritier ya promesse biloko ya Nzambe

(Aâ tika nayemba ngolu)
Ngolu
(Ngolu)
Ngolu
(Ngolu)
Nazui ngolu kokota na ndako ya roi

(Aâ tika nayemba ngolu)
Ngolu
(Ngolu)
Ngolu
(Ngolu)
Nakoti pe na lei na mesa ya roi

(Aâ tika nayemba ngolu)
Ngolu
(Yemba ngolu)
Ngolu
(Ngolu)
Esuki te nakomi mpe muasi ya roi

Alléluia! Alléluia!

Page précédente!