Date & Visites
Jeu 11 Dec 2025.
Visiteurs : 775658
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Paroles :
( Intro ) Yoani akawusaki mayi na miso po amonaki bomoyi
1. Emoniseli ememi nga lelo na bomoyi
Bazwaki Ye mwana na mpate n'elilingi na Yesu
Azalaki mbeka ya lisakolo ya Biblia
Banda kokelama apesamaki na babomi nyama
Afongolaki mongongo te azalaki na singa ya mokano na Nzambe
Paroles :
Hum! Awa biso toweli bomoyi nani akondima kozwa singa na kufa na kingo na ye lokola ntaba ya mwana mpate ?
2. Bikelamu ya likolo mpe ya nse towelaka bomoyi
Kasi Yesu aponaki kokufela se nga na yo
Azalaki nde mbeka apayi na Nzambe Tata
Na kokitisama na ye ya mwana na mpate
Na Getesemané alonwe te na mokano na Papa
Yango tozwi lobiko
Paroles :
Talela Yesu, Mopesi bomoyi
Refrain :
Tala mwana na mpate na Nzambe molongoli masumu na mokili
Tala mwana na mpate na Nzambe, ndeko yaka, mona mpe bila Yesu
Nalelaki mingi mpasi nga ezangaki moto abikisa nga
Paroles :
Soki Yesu te nde nasuka wapi ?
Refrain :
Azwanaki te na mokili oyo akokaki kosombela ngai bomoyi
Na makila ma Yesu nalongi kufa, maladi mpe bobola.
Nga nazwi lobiko
Paroles :
Kuna nde nazwi kobika ( lobiko )
Natalela ekulusu, tika nga nasalela Ye
Refrain :
Tala mwana na mpate na Nzambe molongoli masumu na mokili
Tala mwana na mpate na Nzambe, ndeko yaka, mona mpe bila Yesu
Nalelaki mingi mpasi nga ezangaki moto abikisa nga
Parloes :
Soki Yo te Papa!
Azuwamaki te na mabele oyo akokai kopesa bomoyi ya seko
Mbele napola kala na mabele!
Refrain :
Na ekulusu nalongi Satana, ba démons
Yesu akokisi nionso pona ngai
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates