Date & Visites
Mer 17 Dec 2025.
Visiteurs : 778731
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Likolo efunguami mpe kembo na Yo emonani epai na bato oyo balingaka Yo
Kumama Yahweh na bomoyi
(Yahweh na bomoyi)
Kumama Yo tonda nguya
(Mokili, Mokili)
Mokili esimbami
(Olelele, Olelele)
Na loboko na Yo ya nguya
(Olelele)
Ozali na liloba ya suka na bomoyi
Nani akoki kobenga butu eyinda
Tongo etana soki Yo te Nzambe
Mpo likolo mpe na se esimbami na Yo
Bokonzi na Yo ewumela seko na seko
Olokotaki ngai na putulu
Osukoli ngai lelo
Otomboli ngai ââ
Kumama
Kumama Nzambe na bomoyi
(Yahweh na bomoyi, Nzambe oyo nani akokani na Yo)
Kumama Yo tonda nguya
(Nzambe nde Yo)
Mokili esimbami
(ôô likolo mpe na se esimbami na Yo)
Na loboko na Yo ya nguya
(Nzambe na bomoyi)
(Yo nde Papa ya bana)
Ozali na liloba ya suka ya bomoyi
Oza Nzambe te mpo toza koyembela Yo
Oza Nzambe wuta mokili esalemaki nanu te
Ata toboyi na biso kokumisa Yo
Yango te ekolongola Yo na Bonzambe na Yo
Esika mabanga ekumisa Yo
Loyembo na ngai yango yo Nkolo
Ngai nayembeli Yo
Kumama
Nkolo, Yo nde Nzambe na bomoyi
Yamba losambo na ngai
Motema na sopeli Yo Yesu oyo
Kumama Nzambe na bomoyi
Kumama Yo tonda nguya
(Mokili esimbami, mokili esimbami)
Mokili esimbami
(Yo Nzambe oyo, Papa)
Na loboko na Yo ya nguya
Ozali na liloba ya suka ya bomoyi
Kumama, Yaweh Kumama
Kumama, Yaweh Kumama
Kumama iyo lelele
Kumama, Yaweh Kumama
Kumama Yesu oyo
Kumama iyo lelele
Tika ngai nakumisa ngai na kumisa Yo
Tika nayembela Yo
Kumama iyo lelele
Loyembo na ngai yango Yesu
Motema nasopili Yo
Nayemba bolingo na Yo Yesu oyo
Otomboli ngai
Opamboli ngai
Natomboli Yo.
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates