Date & Visites
Mer 04 Fév 2026.
Visiteurs : 790130
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Pona nini komitungisa
Mpona pasi eyeli yo
Nzambe ye moko ayebi
Nini alingi kosala na yo
Pona nini kolela lela
Mpona pasi eyeli yo
Nzambe ye moko ayebi
Nini alingi kosala na yo êêââ
Nazali Nzambe na yo
(Ngai Nzambe na yo)
Ye akoki kosala oyo nionso elingi Ye
Nani akosambisa Ye
Tala ndenge asali na Yobo
Akabi ye na satana
Mpo aniokola nzoto na ye êê
Azali Nzambe na nguya
Tala ndenge asali na Sarah
Mbula tukulibua mpo ye abota
Sarah akangaki motema
Kino apesaki ye muana êêê
Mpona nini biso ba bandimi
Soki komekama eyei
(Soki mua tentation eyei)
Tobosani ekulusu
Ememi yo osumuka
Tala pasi ye amonaki îî
Na ekulusu mpo ngai nazua bimoyi
Bongo tina nini ngai na lela lela
Asalaki nionso mpona bomoyi na ngai
Ekoti na nzube na moto
Mopanga batobolaki na mopanzi na Ye
Ebimisaki mayi
Eê na mopanzi îî
Yango esikoli na ngai êêê
Eê mondimi kolemba te
(Kolemba te mondimi x2)
Mpona likambo eza yo
Talela se ekulusu
(Yesu amikaba)
Yesu amikaba mpona na yo
(Ye amisalaki pasi)
Ye amisalaki pasi
(ôô mpo ete yo ozua esengo)
Mpo ete yo ozua esengo
(Amisalaki mobola)
Amisalaki mobola
(Ôôôôôô)
Mpo ete ngai nayo tozala bazui
Ââ nazali lokola argile
Na maboko ya pôtier
Nionso pôtier alingi asala
Akosala yango
Nazali lokola bébé
Na maboko ya maman na ye
Bébé ayebaka te mbongo eza te
Soki nzala akolela se bilia êêâ
Eê mondimi kolemba te
(Mondimi kolemba te x2)
Mpona likambo eza yo
Talela se ekulusu
(Se losambo x2)
Yesu amikaba mpona na yo
(Yesu amisalaki pasi)
Ye amisalaki pasi
(mpo ete yo ozua esengo)
Mpo ete yo ozua esengo
(Amisalaki mobola)
Amisalaki mobola
(Yesu!! ôôôôôô)
Mpo ete ngai nayo tozala bazui
Âââ bonde bondelaka
Bondelaka
(Bondelaka)
Bondelaka
(Bondelaka)
Na elikia Yahweh akosunga
(buka mabolongo na yo)
Bondelaka
(Buka mabolongo na yo)
Bondelaka
(Ôô tia tolo na se x2)
Na elikia Yahweh akosunga
(buka mabolongo na yo)
Bondelaka
(buka mabolongo na yo)
Bondelaka
(Ôô tia tolo na se x2)
Na elikia Yahweh akosunga
(bondelaka)
Bondelaka
Bondelaka
Na elikia Yahweh akosunga
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2026, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates