Date & Visites
Mer 17 Dec 2025.
Visiteurs : 778727
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Sunga ngai Yesu Klisto
Mokili oyo etondi mabaku
Soki osungi te
Nako pengua
Sunga ngai
Sunga ngai
Yo nde Nzambe na ngai
Mpo ete nzoto etonda bolembu
Ngai moko nakoka te (x2)
(Naza na mposa)
Naza na mposa ya kosala malamu
(Yesu)
Kasi nzoto na ngai ekomema ngai nasala lisumu (x2)
(Sunga ngai)
Sunga ngai
Yo nde Nzambe na ngai
(Yesu)
Yo moko oponaki ngai
Sungaka ngai (X2)
Nani akoki kotombola mosapi
Aloba
Nani !
Ete abanga Nzambe na makasi na ye moko
Nani akoki kotombola mosapi
Aloba
Nani !
Ye alonga ekobo na makasi ye moko
Kasi ngai nayebi tolongi nionso na se ngolu
Nzambe pesa ngai makasi nalonga mokili
Mpo nionso naza komona nakoki te Yesu
Nzoto ekoka te kokumisa Yo
Yango nasengi Yesu
Sunga ngai
Eê mowumbu na yo
Ngai moko nakoki te
Na beleli yo Yesu yaka
(Sunga ngai)
Sunga ngai
Yo nde Nzambe na ngai
(Yesu yo)
Mpo ete nzoto etonda bolembu
Ngai moko nakoka te (x2)
(Sunga ngai)
Naza na posa ya kosala malamu
(Yesu)
Kasi nzoto na ngai ekomema ngai nasala lisumu (x2)
(Sunga ngai)
Sunga ngai
Yo nde Nzambe na ngai
(Yesu)
Yo moko oponaki ngai
Sungaka ngai
Ekobo naza koboya
Yango etingami ngai
Kofinga mpe kosuana ekangami se ngai
Na motema na ngai posa ya kosala masumu ezali te
Kasi nzoto oyo ekomema ngai namuka
Yango nayei epai na Yo mpo Yesu osunga ngai
Soki otiki ngai nakoka te Yesu oyo
Bomoto ekoki te koyemba
Yango nayembi êê
Sunga ngai
Sunga ngai
Eê mowumbu na yo
(Ngai moko nakoki te)
(Na beleli yo Yesu yaka)
(Sunga ngai) (x2)
Sunga ngai
Yo nde Nzambe na ngai
Mpo ete nzoto etonda bolembu
Ngai moko nakoka te (x2)
Naza na posa ya kosala malamu
(Kasi nzoto na ngai)
Kasi nzoto na ngai ekomema ngai nasala lisumu (x2)
(Naza na posa)
Sunga ngai
Yo nde Nzambe na ngai
Yo moko oponaki ngai
Sungaka ngai
Eê Yahweh yako sunga
(Yahweh, sunga êê Yesu)
Eê Yahweh yako sunga x2
(sungaka Nzambe na ngai)
Eê Yahweh yako sunga
(Buange êê)
Parole en dialect
Nasengaka na Yo Yesu
Pesa ngai miso ya molimo Nzambe na ngai
Namona bikamua na Yo
Mpona natatolaka kembo na Yo
Mpo na se mabele nakoki te
Yesu na ngai osungaka ngai
(Sunge Yesu na ngai)
Eê Yahweh yako sunga
(Osungaka bakolo Nkolo bamona kembo na Yo)
Parole en dialect
Parole: Salisa ngai Nkolo
Soki Yo te
Mosusu nani?
Mpo ete na mokili oyo pasi eleki
Soki lisungi na Yo
Nani akolonga
Osungaka biso Nkolo ô.
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates