• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

MOYI ETELEMI

11. MOYI ETELEMI

Mpo na ngai moyi etelemi
Mpo na Congo moyi etelemi
Lokola Josué bandeko atelemisaki moyi
Ati tango bitumba na ngai ekosila
Wana nde moyi na nga ekotambola 2x

Ata eyindeki ngai
Ata elekeli ngai
Nakobanga na nga eloko te
Oyo akela ngai azali na bomoyi
Oyo apona ngai ayebi nga malamu
Yango nakobanga te ngai nakobanga te


Nakobanga te Nzambe na nguya
Moto te na se akobangisa ngai
Mpo nayebi oyo aza kati na nga
Aleki biloko nyoso na se na nguya


Kolemba nzoto te moninga
Kobangabanga te moninga
Tozali kokima mbangu na montre ya Nzambe
Kasi na montre ya bato ya mokili te
Ezali lokola nde moto kobeta na terrain 2x
Moto na moto akoki mpe kozala na siflet na ye
Kasi siflet oyo bato batielaka miso
Ezali siflet ya arbitre oyo aza na kati ya terrain
Soki asiffler te match ekosila te oh 2x
Arbitre ya bomoyi nde Yesu mwana na Nzambe
Ye nde ayebi tango nini match ekosila
Elonga na nga elonga na nga


Elonga na ngai azali
Nakobanga na nga eloko te
Akotika ngai te na yo na soni liboso ya banguna na ngai
Akozala na ngai kino na suka
Moto ole na moto na nga


Bartimé mpe atelemisaki moyi 2x
Atamboli na nzela ayoki mokonzi aza koleka
Agangi fils de David ''Aie pitié de moi''!
Bato bagangeli ye ''Yo! Kanga monoko na yo''!2x
Yesu abaluki atali boye mpe alobi
Yo mwana na Timé nasala na yo nini
Yo fils de Timé nasala na yo nini


Nalingi namona 4x


Elonga...


Soki Bartimé alandaki maloba ya bato
Mbele miso ya Bartimé elingaki komona te
Soki Bartimé alandaka maloba ya foule
Mbele miso ya Bartimé elingaki komona te
Soki oza na likambo luka basali na Nzambe
Kota na chambre na yo tia mabolongo na se
Buaka miso likolo otelemisa moyi
Bongo soki moyi atuni yo nasala na yo nini

Nalingi namona 4x
Elonga...

Il est saint Jésus

Page précédente!