• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

LITATOLI NA KONDIMA

Tango nazalaki na mokili
Nayokaki sango ya Nzambe oyo
Lokola nazanaki boyebi
Bato mingi bakosaki ngai
Ba memaki ngai mpo na gumbamela
Ba nzambe ya ba koko na ngai
Namekaki kasi esimbi te
Na kotaki na kati ya prison

Nzoka ya Yesu aza kotala ngai
Atondi na mawa na motema
Atindi moto aya koluka ngai
Apesaka ngai numero ya téléphone
Nabengi nayoki eza ko sonné
Ayambi ngai na kombo na ngai
Ekamuisi ngai toyebani te
Nzoka ya Yesu ayebaki ngai

(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Olele êê)
Nakobanga eloko te
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai
(Ye ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Olele êê)
Na kolela lisusu te
(Olele êê)
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai



Paroles : Ayebi ngai, ata ofandaka na masina Yesu ayebi yo
Ata ofandaka na malueka, Nkolo ayebi
Eza likambo na ntango

Nakoma na ngai lokola mua bébé
Na maboko ya Papa na ngai êê
Soki na leli lipa apesaka ngai
Nasengi miliki apesa ngai êê

Ata nazali na kati ya motuka
Na mpepo to na kati ya masuwa
Nabangaka na ngai eloko te
Mpo Ye nde aza kobatela ngai

(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Ayebi ngai Yesu)
Ye ayebi ngai
(Na kombo na ngai)
Nakobanga eloko te
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai

(Ye ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Nkolo ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Olele êê)
Na kolela lisusu te
(Nako lela te ngai x2)
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai

Ba souci na ngai napesa na Ye
Na koma na ngai lokola mpate
Na bergerie Ye moko Berger
Nde ya Yesu berger na ngai

Nawutaki na éternité
Nakozonga na éternité
Mpo oyo nionso nazali komona
Nde ye Masiya
Abongisa ngo

(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Eêê Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Olele)
Nakobanga eloko te
(Olele)
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai

(Ye ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Olele êê)
Na kolela lisusu te
(Olele êê)
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai

Eê eve boschet azalaki na zamba
Kuna na suka na lodeba
Lokola Nzambe ayebaki ye êê
Asukaki kolia na mesa ya roi

Esengeli David abeta lindanda
Tango Saulu azalaki kobela
Bakendaki koluka ye na zamba ââ
Aya kobeta na ndako ya roi

Zachée amaki likola ya nzete
Ayebaki na ye Nkolo Yesu te
Mais lokola azalaki muana ya Abraham
Yesu abengaki ye na kombo na ye

Soki eloko ya Nzambe ezali na Yo
Ata bato ya mokili batelemeli yo
Mokolo Nzambe akotombola yo
Bango nionso bakokoma ba fana na yo

(Ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Ayebi ngai ye êê)
Ye ayebi ngai
(Olele)
Nakobanga eloko te
(Olele)
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai

(Ye ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Ye ayebi ngai êê)
Ye ayebi ngai
(Olele êê)
Na kolela lisusu te
(Olele êê, Olele êê, Olele êê)
Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai

Olele, ôôô
Oôô, ôôô Ba, ôôô Baba
ôôô Baba
olele êê

(Nalingi Yesu)
Ngai nalingi Yesu (x4)
(Nzolele Nkosi)
Uûê nzolele Nkosi (x2)

(Nalingi Yesu)
Ngai nalingi Yesu (x4)
(Nzolele Nkosi)
Uûê nzolele Nkosi (x2)

Page précédente!