• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

YE WANA ( Le voilà )

CHŒUR :
Ye wana (2x) kuna na lola ( … x)

LEAD 1 :
Mobali oyo akangola ngai Ye wana kuna na lola
Oyo akataka makambo na ngai Ye wana Mobali nalinga
Oyo akomisa nga bilobaloba Ye wana kuna na lola
Nzambe na nga nabetelaka tolo Ye wana Yesu Masiya

Chœur

LEAD 2 :
Botika nga nayembela Yesu po ye alendisa motema na ngai
Oyo akomisa nga biyembayemba Ye nde Yesu Masiya napona
Oyo akomisa nga bibilabila Ye wana Mobali ya libala
Maloba na Ye ekitisaka motema yango nakangami naboyi basusu alleluia

Chœur

LEAD 3 :
Lolenge Mose atombolaki nyoka motako kuna na lisobe
Mwana na mpate atombwani lelo po ete ngai na yo tobikisama
Soki y'otali ye y'okobikisama
Soki y'otali ye y'okokangolama
Soki y'otali ye bomoyi ekochanger

Chœur

LEAD :
Ye wana (3x) Nzambe na bomoyi
Ah nakoyemba, ah nakobina se pona Mobali oyo
Alangwisa nga Yesu Masiya nalingi Ye tika nasalela Ye
Nalingi Ye tika nayembela Ye alleluia na Nkosi na Yuda

Chœur

REFRAIN :
Oyo abikisi nga Ye wana
Oh Ye wana, Ye wana akangoli nga
Oh Ye wana, Ye wana mutu abongisi nga boye
Ye wana, Ye wana, Ye wana

ADLIBITUM :
Merci Ye eh
Eh nabalie
Nabotie
Namonie
Nayokie …
Thank You Baba

Page précédente!