Date & Visites
Jeu 11 Dec 2025.
Visiteurs : 775679
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Naza na naposa yakosalela yo na bomoi na nga penza mingi,
naza nalikanisi ya kotika yomoke te O Yesu na bomoyi na nga,
natondi posa yakosela yo na bomoyi na nga penza mingi,
naza nalikanisi ya kotika yomoke te o Yesu na bomoyi na nga.
Soki natali nionso oyo osala otalisa nga bolingo, olobela nga ozali Nzambe na nga.
Wuta bomwana yobatela nga, otalisa nga bolingo,
otalisa nga ozali Papa na nga, Nzambe ya ba orphelin o Yesu nga nayembeli yo, tala tina nga nayembeli yo.
obundelibundeli nga bitumba nga nabundi te tala tina nga nayembeli yo.
Oh Yaya nga nayembeli yo tala tina nga nayembeli yo, olongisilongisi nga bitumba nga nabundi te tala tina nga nayembeli yo.
Na mokili batu bakoki kokokana bilongi lokola yo amonani te,
Na mokili batu bakoki kokokana minene lokola yo amonani te.
O Yesu nga nayembeli yo,
tala tina nga nayembeli yo.
Na tondi na esengo obundelibundeli nga bitumba nga nabundi te tala tina nga nayembeli yo.
Oh Yaya nga nayembeli yo tala tina nga nayembeli yo, olongisilongisi nga bitumba nga nabundi te tala tina nga nayembeli yo.
Olakaki nga miso na nga emoni nga moko na moni ba temoins pe bazali,
olobi lisusu tosuki awa te toza kokoba Yesu tokende elongo,
vula mingi Yesu totamboli nayo mokolo moko ngai Yesu nakufi soni,
olalaka te Yesu onimbaka te Yesu likambo na nga okotaka ngo. Baye bamekaki kosimba bomoyi na nga bakutana nayo bakweya nase
Yesu yango nalobi ozali
Nzambe ozali Nzambe oyo akamwuisaka,
Yesu yango nalobi ozali Nzambe ozali Nzambe oyo alongisa nga.
O Yesu nga nayembeli yo, tala tina nga nayembeli yo, obundelibundeli nga bitumba nga nabundi te tala tina nga nayembeli yo.
Oh Yaya nga nayembeli yo tala tina nga nayembeli yo, olongisilongisi nga bitumba nga nabundi te tala tina nga nayembeli yo.
Alleluia (8)
nasilipe kobala naboti pe bana nakolisi pe bana nazui pe bakoko Alleluia Alleluia Alleluia,
nasali pe mosala nazui lifuti
Alleluia Alleluia Alleluia nalandi pe Ya Yesu nazui lobiko, elonga na nga emonani,
nzoto nanga kumisa masiya yende Nzambe abongi na lokumu,
bana nanga kumisa masiya yende
Nzambe oyo akelaki bino,
mboka Congo bokumisa kombo na Yesu mosusu te po azali Nzambe se moko,
iyo(7).
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates