• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Le panier circule encore.

Motema na nga esepeli mingi natangi makomi na yo eeeh.
Oy'anga motema esepeli na tanga makomi na y'elobi tango na nga ezali.
Kaka na tango na nga Nzambe okopambola nga.
Kaka na tango na nga Nzambe okotombola nga.
Soki osali te Yaweh na nga kombo ekotsholama.
Soki osali te Rabbi kombo ekotsholama.

Ooh papa lipamboli na moto ewutaka epayi na yo.
Kotombwama na moto ezali likambo na tango.
Y'otombolaki Abraham ezalaki tango na ye,
Opambolaki Jacob kaka na tango na ye.
Kaka na tango Ya Joseph papa y'opambolaki ye.
Tango na nga pe ezali.
kaka na tango na nga Nzambe oko pambola nga.

Soki osali te Yaweh na nga kombo ekotsholama.
Soki osali te Schilo kombo ekotsholama.

Ooh papa lipamboli Ya libala ewutaka epayi na yo.
Lipamboli Ya libala ezali likambo na tango.
Y'obalisaki Esther ezalaki tango na ye.
Obalisaki Ruth ezalaki tango na ye.
Ngai pe na tango na nga papa y'obalisaki nga.
Tango na ye pe ezali.
Kaka na tango na ye Nzambe okobalisa ye.
Soki osali te Yaweh na nga kombo ekotsholama.
Soki osali te Rabbi kombo ekotsholama.

Ooh papa lipamboli na bana ewutaka epayi na yo.
Yango pe lokola ezali likambo na tango.
Opambolaki Anna ezalaki tango na ye.
Opambolaki Sarah kaka na tango na ye.
Yaweh na tango Ya Elisabeth papa y'opambolaki ye.
Tango na nga pe ezali.
Kaka na tango na nga Nzambe okopambola nga.

Soki osali te Yaweh na nga kombo ekotsholama.
Soki osali te Schilo kombo ekotsholama.

Oooh kombo ekotsholama Yaweh(2fois)
Batu bakotuna nguya na yo Yaweh.
Libanga na talo elonga na nga Nzambe.

Ref : Non. Non non non non.
Naboyi kombo na yo etsholama na bomoyi na nga

Oooh esika na nga Masiya ondima souffrances na nga.
Esika na nga Jésus ondima souffrances na nga eeh.
Yango na lapi na bomoyi na nga na lobi nasalela yo.
Bomoyi na nga nazala kiti y'ofanda opambola libota.
Papa yo elonga na nga.
Yonde Nzambe Ya banzambe mosusu azali te.
Libanda na yo kufa kati na yo bomoyi ezali.
Lapamboli eza likambo Ya tango ngayi na Lenga nini.
Le panier qui a circulé hier continue à circuler aujourd'hui.
Au moment opportun ça arrivera pour nous Jésus.

Ref : Non. Non non non non.
Naboyi kombo na yo etsholama na bomoyi na nga

Page précédente!