Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776513
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Lead
- Otiki kiti ya bikonzi na yo
Okiti na se kokangola ngai
Bolingo na yo eleki monene
Yango lelo toyembeli yo
Liwa ya soni oy'okufaki
Otalisaki bolingo na yo
Esika nga okamataki
Yozali solo elonga na nga
Nabelelaka se kombo na yo
Oyokaka pe oyanolaka
Na kende wapi soki na yo te
Miso na ngai se epai na yo
Chœur
Mosala oyo y'ekulusu
Kufa na yo ebikisi mokili
Golgotha nyonso ekokisami
Otalisi bo Nzambe na yo
Sol'ozali Mokonzi na ngai
Oza ya solo Elombe Mobali
Obebisi misala ya satana
Opesi elong'epai ya bato
Pota na yo maladi esili
Nkolo Yesu Engambe Mobali
Makila na yo tosikolami
Masumu nyonso elimbisami
Ozali Nza Nzambe na bato
Nini lisusu tokoki kobanga
Wolo palata ezali ya yo
Ozali Ekimelo na ngai
Bomoi na biso se ngolu na yo
Kombo na yo tokomi bana Nzambe
Eloko nini tokoki kozanga
Kati na yo tokomi basangoli
Mosala oy'ekulusu
Kufa na yo ebikisi mokili
Golgotha nyons'ekokisami
Otalisi bo Nzambe na yo
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates