• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

KIMIA NA MOTEMA

1. Uta nga nakoma kosombela
Uta nga nokoma mokristo
Kimia na motema,
Bomoi echanger
Nakoma kotalela kaka Masiya
Na kombo na Yesu
Natika misala ya mabe
Na kombo na Yesu
Nakoma moto ya kobanga masumu
Na kombo na Yesu
Kimia na motema

2. Uta nga natika masumu
Uta nga nakangama na Nzambe
Kimia na motema,
Na kolemba te
Elikya na nga se no Yesu Mwana Nzambe
Na kombo na Yesu
Milimo ya mbindo mikokima
Na kombo na Yesu
Moto ya lola mokokita
Na kombo na Yesu
Kimia na motema

3. Yesu kimia ya bana Nzambe
Nkolo totielaka mitema oh
Ye tosanzolaka
Liloba na Nzambe
Yende Apesaka bomoi ya seko
Mokonzi ya eklezya
Makasi na ngai moumbu na Ye oh
Lolendo na ngai
Apesa ngai ngolu ya koyeba Nzambe
Mpe kosalela Ye oh
Na Kimia na motema

Page précédente!