• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

LIBONDELI

Lokola Esther, Naye kobondela pona libota na nga.
Lokola Jephte, Naye kobunda pona bandeko na nga.
Lokola Moise, Naye kobikisa solo mboka na nga.

YESU YESU YESU, YESU ozali wapi (×3)

YESU YESU YESU, Tolingi kokumisa yo.

Refrain : Oza Nzambe Ya bomoyi na nga.
Oza Nzambr Ya libota na nga
Liloba na yo yango eko kokisama
Epayi nakotatola yo

Libondeli na nga, Namemi yango,
Yesu yanola ngai.
Maman na nga azali kobela,
Yesu olobi nini ?
Papa na nga alingi kokufa,
Yesu olobi nini ?
Bandeko na nga kati na pasi,
Yesu olobi nini ?
Mboka Congo kati na pasi,
Yesu olobi nini ?

YESU YESU YESU, Tolingi kokumisa yo.

Refrain : Oza Nzambe Ya bomoyi na nga.
Oza Nzambr Ya libota na nga
Liloba na yo yango eko kokisama
Epayi nakotatola yo

Nzambe, Nzambe, Nzambe Ya bomoyi na nga.
Nzambe, Nzambe, Nzambe Ya libota na nga.
Nzambe, Nzambe, Nzambe Ya ekolo na nga.
Nzambe, Nzambe, Nzambe Ya mboka na nga.

Refrain : Oza Nzambe Ya bomoyi na nga.
Oza Nzambr Ya libota na nga
Liloba na yo yango eko kokisama
Epayi nakotatola yo

Olobaki, soki, na ndimeli yo nakobika.
Pona libota na nga yesu Nzambe na nga.
Zalaaaaa eh ! Salela ye.
Nayebi ozo mona nga,
Nayebi ozo yoka nga.
Sembola loboko sala,
Tolingi kotatola yo Yesu.

Refrain : Oza Nzambe Ya bomoyi na nga.
Oza Nzambr Ya libota na nga
Liloba na yo yango eko kokisama
Epayi nakotatola yo

Liloba na yo yango ekokokisama
Epayi (×6)

Page précédente!