• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

NDOTO ELATI NZOTO

Ezalaki ndoto, lelo ekomi ya solo
Kolela na nga, ebongwani esengo
Ndoto nalota kala, lelo elati nzoto
Na ndimaki te, lelo solo na ndimi
Ndoto nalota kala, lelo elati nzoto
Na ndimaki te, lelo solo na ndimi
Joseph alotaki ndoto sanza, mwense,
mizonto ko ngumbamela ye
Ayebaki te ezalaki mabombani ya
bomoyi na ye
Jacob na misu ya molimo amonaki
mwana akozala mokonzi
Alimboli ndoto, likunia ekoti kati na
bana
Joseph atekamaki kaka pona ndoto
Akotaki boloko kaka pona ndoto
Na kati ya boloko, ndoto na ye elataki
nzoto
Akomaki mokonzi, Ndoto elataki nzoto
Ezalaki ndoto, lelo ekomi ya solo
Kolela na nga, ebongwani esengo
Ndoto nalota kala, lelo elati nzoto
Na ndimaki te, lelo solo na ndimi
Ndoto nalota kala, lelo elati nzoto
Na ndimaki te, lelo solo na ndimi
Ndoto malamu olota
Ata eleki mbula pe ba sanza
Yeba malamu ya solo ezali language ya
Nzambe
Joseph alotaki, kasi awumelaki na ko
tosa Nkolo
Tala botosi na ye, elatisaki ndoto na ye
nzoto
Oyo ekolatisa ndoto nzoto eza se
losambo
Oyo ekolatisa ndoto nzoto eza se
molimo
Oyo ekolatisa ndoto nzoto eza se botisi
Ah ndoto na nga, nalingi lelo elata
nzoto Nkolo
“Na ndimaki te, lelo solo na ndimi.
Ezalaki ndoto, lelo ekomi ya solo
Kolela na nga, ebongwani esengo
Ndoto nalota kala, lelo elati nzoto
Na ndimaki te, lelo solo na ndimi
Ndoto nalota kala, lelo elati nzoto
Na ndimaki te, lelo solo na ndimi
Ndoto nionso ezali ya koloba loba te
Oyebi mutema ya mutu oza koyebisa
ndoto te
Joseph aluka bitumba pona kozanga ko
bomba ndoto
Atemaki pona avenir ya bomoyi na ye
Bitumba misusu eyaka pona kozanga ko
bomba sekele
Senga nanu Nzambe alatisa yango nzoto
Bitumba misusu eyaka pona kozanga
discrétion
Senga nanu Nzambe alatisa yango
nzoto, bako mona
Nkolo Yesu, pesa nga makasi, nawumela
se na losambo
Muasi nionso soki akoli esengeli akota
na libala, abota
Ya nga libala esukela kaka na ndoto
Muana nionso soki atangi asilisi kelasi
esengeli asala
Ya nga musala esukela kaka na ndoto
Eh Yahwe, libala na nga elata nzoto,
elongwa na molimo, nalingi nasimba na
maboko
Eh Yahweh musala na nga elata nzoto,
elongwa na molimo, nalingi nasimba na
maboko
Ezali ndoto elati nzoto (Libala pe bana
naboti)
Ezali ndoto elati nzoto (Mituka,
mapango, mibembo nako sala)
Ezali ndoto elati nzoto (Esengo naza na
yango)
Ezali ndoto elati nzoto (Musala,
promotion nako mona Nkolo)
Ezali ndoto elati nzoto (Aaii heee)
Ezali ndoto elati nzoto
Ndoto na nga elati nzoto, nazo lota te,
nazo mona. Ndoto, Ndoto elati nzoto,
nazo lota te, nazo mona (×7)

Page précédente!