Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776511
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo Yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo Yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Israël atambola na esobé
azanga eloko te po Nkolo na bango Yesu
Ata molili ezo wumela Papa, soki oye
oyaka na pole na Yo.
Nini esalema na sekele Papa, oyo misu
na Yo ezangi ko mona?
Nini elobama na nkunku Yaya, oyo
matoyi na Yo ezangi koyoka?
Nini elobama na sekele Papa, oyo misu
na yo ezangi komona Nzambe ya lola?
Oh Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Ahi Nkombo na Yo
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Complot oyo ba nguna ba sali pona nga,
misu na Nzambe eza komona eko simba
te
Nkombo na Yo, ngai na ko simba
Boluka ko bwaka nga na moto, bazika
bango moko na moto, Yo Nzambe moto.
Nkombo na Yo, ngai na ko simba
Na Nkombo na Yo ba zanga, bazuwa
Ba kelela ba koma ba sungi ya mabota
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Nini elobama na sekele Papa, oyo
matoyi na Yo ezangi ko yoka Nzambe?
“Bana Yahwé biyano ezali— Moise
Matuta feat. La Profondeur
(Oh na Nkombo na Yo na ko simba
Yahwé)
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
(Ata molili eyindi, pole eko tana)
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Eyano ya mituna na nga na tangu ya pasi
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ah oko pesa elonga kaka)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko
mona
(Eh Nzambe na bomoyi)
...biyano te nase na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ah oko pesa elonga kaka)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko
mona
(Eh Nzambe na lola)
...biyano te nase na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana Nzambe biyano ezali)
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana ya Nzambe ya lola biyano ezali)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano ya Nzambe ya bomoyi ekipaka
mboka te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano elanga Mephibosheth na
Lodebar)
Bana Yahwé biyano ezali
(Emema ye une deux une deux ti na
ndaku ya David)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano ya Nzambe ya bomoyi ekipaka
adresse te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Elanda Lazare ti na nkunda, ezongisi ye
na ndaku)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano ya Nzambe ya bomoyi ekipaka
taille te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ekotela Zachée mokonzi, yaya na
ndaku)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ata obali lelo, osilisi ba samedis na
dimanches te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Baya ya Nzambe ya bomoyi mabala
esili te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Oyo ba kenda poto, ba buka ba
ambassades nionso te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana ya Nzambe ya lola, Visa eloko
nini?)
Bana Yahwé biyano ezali
(Oyo ba somba mapangu ba silisa ba
terrains nionso te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ba Nzambe ya bomoyi, mapangu esili
te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Oyo ba bota ba buka ba maternités
nionso te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana ya Nzambe ya lola, bana ba sili te)
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ako tambola mutu na sé te, Nzambe)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko
mona
...biyano te na sé na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
Yesu Nzambe na bomoyi
Betela ye mua mololo bien
Nzambe ya même instant
Nzambe ya lelo lelo
(Nzambe ya lelo lelo lelo lelo)
Nzambe ya même instant
Nzambe ya lelo lelo
(Apesaka rendez-vous na moto te)
Nzambe ya même instant
Nzambe ya lelo lelo
(Oh zonga lobi na ko tala makambu na
yo lobi)
Nzambe ya même instant
(Jamais)
Nzambe ya lelo lelo
(Obikisa ba beli Papa na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Misu ya Bartimée e fungwama na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Muasi ya litanga makila, ekatana na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Mokakatani ya Bethesda, atelema na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Liboma ya Gadara esila na rendez-vous
te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Israël bakatisa mayi ya motane na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Liboso ya David, Goliath akweya pe na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Lazare kutu abima na nkunda pe na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ndima kaka ndeko na nga, oko bika na
rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ako tambola mutu na sé te, Nzambe)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko
mona
(Nzambe na bomoyi)
...biyano te na sé na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates