• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

ELONGI YA FETI

Yaya merci, po olongola nga elongi ya
mawa okomisa yango elongi ya feti,
elongi ya koseka, merci seigneur
Moto oyo apesaki mitindo ba boma
moise abosanaka ye kaka nde abokolaka
moise
Bato oyo ba lingi liwa na yo, bango
kaka nde ba kobokola pe bako banda
kolengela yo, au nom de Jesus
Osimbela nga makambo elelisaka ngai
Osimbela nga makambo eswisa nga
motema eh
Olamusela nga makambo elala elala eh
Omonela nga oyo basusu balembani
koluka
Ozongisela nga nioso esila kolimua eh
Y'obomela nga moto banguna ba pelisa
pelisa eh
O changea makambo oyo bato ba
lembani
Ozongisela nga nioso esila kolimua eh
Y'obomela nga moto banguna ba pelisa
pelisa eh
Oza pona nga oyo mungua eza pona
bileyi
Zangisa bileyi mungua tala bileyi ezangi
saveur
Ko zanga yo na vie bomoyi na nga
ezangi tina eh yaya eh
Y'oza pona ngai oyo fondation eza pona
ndaku
Zangisa fondation na ndaku mopepe
eye ndaku ekueyi
Ko zanga yo na vie bomoyi na nga
ezangi tina yaya eh
Osimbela nga makambo elelisaka ngai
(yaya)
Osimbela nga makambo eswisa nga
motema eh
Olamusela nga makambo elala elala eh
Omonela nga oyo basusu balembani ko
luka
“Malgré ça yaweh amonaka nga eh.
Y'obomela nga moto banguna ba pelisa
pelisa eh
O changea makambo oyo bato
balembani
Osekwisela nga nioso esila ko kufa eh
Y'obomela nga moto banguna ba pelisa
pelisa eh
Aaaaa yaya aaa
Nani akokanga mongongo na yo papa
(mongongo na yo papa)
Ata nombre ya bato eleki epayi nga na
telemi(epa nga na telemi)
Malgré ça yaweh amonaka nga eh
Non non non
Nani akokanga mongongo na yo papa
(nani akokanga mongongo na yo)
Ata nombre ya bato eleki epayi nga na
telemi(epa nga na telemi)
Malgré ça yaweh amonaka nga eh
Akomisa nga elongi ya feti, po ye ayebi
suka likambo avant yango ebanda
Po oyebi suka lilambo uta ebandela
Likolo ya ngolu na yo papa eh
Opusela nga epa naza oyo basusu bazo
bundela
Oyo eniokoli basusu papa pona kozua
Opesa nga yango lokola matabisi po
naza ya yo, olongola elongi ya mawa na
koma elongi ya feti
Po oyebi suka likambo uta ebandela
Likolo ya ngolu na yo papa eh
Opusela nga epa naza oyo basusu bazo
bundela
Oyo eniokoli basusu papa pona kozua
Opesa nga yango lokola matabisi po
naza ya yo, olongola elongi ya mawa na
koma elongi ya feti
Nonnnn yaya
Nani akokanga mongongo na yo papa
(mongongo na yo papa eh)
Ata nombre ya bato eleki epayi nga na
telemi(epa nga na telemi)
Malgré ça yaweh amonaka nga eh
Hummm yaya eh
Nani akokanga mongongo na yo papa eh
(nani akokanga mongongo na yo)
Ata nombre ya bato eleki epayi nga na
telemi (epa nga na telemi)
Malgré ça yaweh amonaka nga eh
Olongola elongi ya mawa, na koma
elongi ya feti
Olongola elongi ya matanga, na koma
elongi ya feti
Olongola elongi ya ko lela eh, na koma
elongi ya feti
Okomisa nga elongi ya feti oo, na koma
elongi ya feti
Olongola elongi ya minioko eh, na
koma elongi ya feti
Olongola elongi ya kolela eh, na koma
elongi ya feti
Olongola elongi ya matanga eh, na
koma elongi ya feti

Page précédente!