• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

JOCKER

Carte oyo eleki ba carte nionso ezalaka nango
Joker, Yesu
oyebi que oleki nayo bango ehh
Kumisama Papah ehh
Netolama Jesus mayele na ngai ya suka
yo nde Joker na ngai
Tango ba carte esilaka na maboko
tango bato nionso ba bimisi oyo ya suka
ngai na bimisaka yo eh 2X
uhmm molimo na ngai
eza na kimia po Yesu aza na fungola
ya liwa pe bomoi
kombo naye eza moto pona bayini na ngai
petelo alobi ata ozangi mbongo
na kombo na Yesu telema pe tambola
kombo ekitisa kanda na Nzambe
Elongola nga na botutu problemme kindoki ya
libota ahh
na bitumba ya molimo abunda ye moko
amemela biso kaka elonga
Yesu oyo final ehh
nani aya abotola nga na maboko ya Nzambe
nani aya olongola kimia naza nango na Yesu
nani aya aza te Yaya ah
nani ayaka na elikia epayi ya moto oh
nani maladie oyo ba minganga basi ba lembana
apesaka solution pe akongolaka bana na ye eh
eza se Masiya ah yo nde mopesi na bilaka ah
eza se Masiya ah molongisi ya bana bato
ngai na tingami nayo Papa 2x
ata ozo boya
nga na tingami nayo eh
ba pekisa ngai eloko mosusu
nga na tingami nayo eh
Na kangami nayo Yesu kino suka na ngai
nzambe eh na ngai
navandi nazotoka ngolu nase ya makolo nayo
oyo asimbi kombo na Yesu
ata mbongue ya mitungisi eye akokweya te oh
ye azali lokola Daniele
ti na libulu asimbaki kombo na Yahwe
bolingo oyo Roi azalaki nango
pona Daniele ekokaki te kolongola mobeko
kasi eza na papa moko
engambe moko apasola ba rideaux na temple
akanga monoko na nkosi
po ye moko azalaki nkosi ya libota na yuda
timola ahah mabulu eh
pona ngai bokokoka te
mabulu na bino botimoli kaka bino moko boko
zinda
oyo akela ngai asila kosekwa
nakoma kobenga ye nkosi oyo akata singa
tsheleka Champion eh
nkosi akata singa yesu yaya eh
nkosi akata singa libala na ngai eh
nkosi akata singa elevation na ngai eh
nkosi akata singa asossie ehh na ngai ah yaya
nani ayaka na elikia epayi ya moto oh
nani maladie oyo ba minganga basi ba lembana
apesaka solution pe akongolaka bana na ye eh
eza se Masiya ah yo nde mopesi na bilaka ah
eza se Masiya ah molongisi ya bana bato
ngai na tingami nayo Papa 2x
nako banga te mabe, nga na tingami nayo eh
nazolenga te bandoki, nga na tingami nayo eh
boya na bino pe ata kama, nga na tingami nayo
eh
na tingama Yesu kino na lola yaya ah
nga na tingami nayo eh
yesu, yesu, na lingi na binela yo ehhh
soki olakisi biso kaka Nzambe mosusu
to tiki na biso kobinela yo
po biso toyebi kaka yo

Page précédente!