• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

ELONGA

1.Nakoti kati na dako nayo
Nafukami liboso na kiti na yo
Na netoli kombo na yo na nguya
Namoni kembo na yo pe bomoyi na ngai ebiki
Nguya na ngai epesameli ngai
Na kombo na yesu milimo miko bika
Bawa bakosekwa po yesu aza elonga.


Réf : Nazali koyemba po yesu aza elonga
Monguna akokima po yesu aza elonga
Solution ekozwama po yesu aza elonga


2. Molimo santu na eklesia na ye
Azali kosala na nguya naye
Tobiki nde solo loboko na ye
Na nguya na masiya nde biso banso tolongi
Nguya na ngai epesameli ngai
Na kombo na yesu milimo mikobika
Bawa bakosekwa po yesu aza elonga


Réf : Nazali koyemba po yesu aza elonga
Monguna akokima po yesu aza elonga
Solution ekozwama po yesu aza elonga

Page précédente!