• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

WE CELEBRATE

Sanjola, sanjola, pona ekulusu kuna ye akufeli, bato
mabe nyoso Yawhe.
Nelson kikem:
Nakoki te kobomba bolamu nayo, na manso y’osali
pona nanga eh, na mbala moko epesi masonjoli, ye
yesu sanjolama eh (sanjolama), ya Yesu netolama
na yo (netolama), mokonzi sanjolama eh
(sanjolama) netolama na yo eh (netolama) mokonzi
sanjolama eh (sanjolama) netolama na yo eh
(netolama)
Oh azali, azali
Choeur:
Azali nzambe (N. Kikem: nzambe oh) biso
tolingaka yo (N.K: mitema na biso ekoki te) azali
nzambe (N.K.: eyembi nzembo na yo) biso
tolingaka yo
Paul Bakenda:
Makambo nazalaka kobanga, que esalama pona
nga te, lelo oyo yesu na nga, amemeli nga ngo na
mbalakata, ba bdoto na banzaka impossible lelo
yesu olotisi nga okokisi pe yango, nakomi moto ya
nyongo yako betela yo se milolo
Sanjolama nanu Yawhe (sanjolama )na kumisi
nzambe ya lola (netolama)
Fiston Mbuyi:
Mwinda ya bomoyi na nga, yolongoli pasi na eh
pasi na ngai eh nkombo na yesu eh, kondima,
kosambua na nzete ya soni oyo, se po na nga
nazua bomoyi ya seko, yango nazo yemba yo (nazo
yemba yo) po nayebi bolamu (bolamu na yo) yango
nazo yemba yo, shadayi wani na yembi bolamu no
Choeur avec F. Mbuyi:
Azali nzambe na nga (Azali nzambe)
Molongoli pasi na ngai eh (biso tolingaka yo)
natika yo po na kende wapi yaya (Azali nzambe),
nakokanisa yo na nani (biso tolingaka yo), na
lingaka yo (Azali nzambe), nzambe na ngai
shadayi wani (biso tolingaka yo)
Fabrice Mulaja:
Bayembaka ndenge nini liboso ya bolamu ya
nzambe, oyo osaleli nga elekeli mabanzo na ngai,
nakokaki pe kozala mort-né oyo nakanaki te, na
bolingo na yo y’obateli nga vivant, na tandi maboko
koganga ete y’ozali nzambe, na nyoso y’osali na
tindi loyembo
sanjolama na yo (sanjolama) lelelelelelele
(netolama) shina na wengine kaka wewe baba
(sanjolama) mukombozi wa mayisha wangu
(netolama)
Billy Bilombo:
Animation en Tshiluba.

Page précédente!