Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776567
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Towumelaki kati ya molili
Tala Yesu aye na pole na ye
Mobali ya nguya, motema malamu
Ata mwana mobola Yesu abuakaka ye te
Abokoli nga asuki wana te
Apesi ti bomoi na ye pona nga
Nakoma kolinga ye eh eh eh !
Nakoma kolinga ye
Pene na kufa
Nakoma kolinga ye eh eh eh !
Nakoma kolinga ye
Pene na kufa
Biloko ya motuya bato bakufelaka
Yesu andimi kotshia yango kati na nga
Naza vase de terre
Epanzanaka pamba pamba
Andimi risque, il a investi en moi
Afungoli nzela alakisi nga yango
Asuki wana te, azo tambwisa nga
Nakoma kolanda ye eh eh eh !
Nakoma kolanda ye
Bisika nyoso
Nakoma kolanda ye eh eh eh !
Nakoma kolanda ye
Bisika nyoso
Natunaki ye, nini alula epa na nga
Naza na makasi te oh oh oh !
Ayanoli nga, alukaka bato ya makasi ye
Alukaka oyo ya botosi YAWHE
Mikolo nyoso, nasambelaka Nzambe ya lola
Afanda na motema na nga eh eh eh !
Soki mipepe, soki banguna batelemi
Pe tango nga naza kolaka nzembo
Je serai couronné eh eh eh !
Je serai couronné, après ce combat
Je serai couronné eh eh eh !
Je serai couronné, après ce combat
Je serai couronné eh eh eh !
Je serai couronné, après ce combat
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates