Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776590
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Lead 1 :
Kati na maboko na yo Nkolo
Na ye komipesa motema pe nzoto.
Tambolisa ngai na njela na yo
Po ete na longa etumba makasi.
Na mona kembo na yo.
Lead 2 :
Eh Yawhe na kobelela yo,
libanga na ngai monene.
Jipa matoyi na yo liboso na ngai te.
Longola ngai na mabe eeh.
Yokamela mongongo na mabondeli na ngai.
Wana nakobelela yo ooh.
Wana nakotombola maboka na ngai epayi na yo Yawhe eeh.
Yawhe ozali nguya na nga pe nguba na ngai makasi.
Motema na ngai ezali na elikia bobela epayi na yo Yawhe eeh.
Refrain :
Kati na maboko na yo Nkolo
Na ye komipesa motema pe nzoto.
Tambolisa ngai na njela na yo
Po ete na longa etumba makasi.
Na mona kembo na yo.
Choeur :
Boye na sungami pe motema eyoki esengo.
Nakotonda yo na nzembo ooh.
Yahwe ozali nguya ya bato na yo awa na se.
Elikia ya ba pakolami iih.
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates