• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Nzambe na bomoyi

Refrain :
Oza Nzambe na bomoyi (x 3).
Tokoyembela yo.
Seko y’oza Nzambe

Lead :
Nzambe na Abalayama okokisaka bilaka na yo eh
Ata nzoto ebebi eh. Bilaka na yo ekufaka te eh

Nzambe na Mose otambuisaka ba oyo ya yo eh
Moyi limpata na nkembo. Butu na likonzi na moto

Nzambe na Eliya okitisa moto uta likolo eh
Mboka mobimba ba gumbamela yo eh
Balobi : “Yahwe nde Nzambe”
Kumama y’obonguani te eh

Nzambe na Davidi okomisa bitumba na biso ya yo
Elonga opesa na biso. Lelo totatoli yango

Nzambe na ngai oyo okomisa ngai mwana na yo eh
Eloko mbongo esombaka te oh.
Tika na salela se yo

Papa na Yesu Klisto otambuisa ba ye batambolaka te oh
Olobisa ba ye balobaka te oh.
Solo elong’eza na yo eh
Kumama y’obonguanite eh

Chœur : Oza Nzambe na bomoyi
Coda : Hosanna, Hosanna
Chœur : Amen

Lead :
Ofandi na bisika bileki likolo oza na bomoyi.
Okepesa pe bomoyi na ba oyo ba yambi yo eh

Tu donnes la vie aux ossements desséchés.
Tu règnes à jamais, mon rocher.
Et je vis pour t’adorer, pour chanter Hosanna.

Page précédente!