Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776609
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Couplet 1 :
Sungai ngai nayeba yo Yesu eh
Natambola na kobanga kaka yo
Nayokaka mongongo na yo eh eh
Motema se kobeta beta nga
Na makambo ya mokili oyo
Nalingi te na tosi yo Yesu eh
Bendele osimbisi nga papa
Na lingi te natika yango boye oh
Ata bolembu na buaka te oh pona yo
Posa motema nga nabila yo
Nasalaka makano se ya yo
Na ngumbamela kombo na yo papa butu na moyi
Couplet 2 :
Ba pasi ekobenda benda ngai
Longola ngai na libulu ya mawa
Sala totatola yo eh eh
Na motema epayi y’ozali
Tia litoyi eh Nzambe na nga
Kokisa posa na yo eh eh
Ekomami ata na se na mayi
Ba oyo ya yo bakokatisaka
Yango nakangami se na yo eh eh
Lola nde efandelo na yo
Mabele enyatelo na yo
Okotanga matanga ya mvula
Tango ekotitaka papa
Ebongo na talela nani eh eh
Refrain :
Sungai ngai muana na yo eh eh
Na bila nzela na yo eh eh
Na yokaka mongongo na yo eh eh
Yo nde oyo miso ezo kotala
Yaka komema ngai na pengua te oh
Na nguya ya molimo na kokoma oh
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates