Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776558
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Ata moto epeli kati ya bomoyi na nga.
Na ko banga banga te po ete Yesu azali.
Moto ya mineyi na moto akosilisa moto.
Akosukisa nionso elonga na nga eh eh.
Ata nkosi angulumi pona kopekisa nga.
Nasimba bilaka ya bomoyi na nga.
Nayebi nkosi ya bayuda moto ya mineyi na moto
Ayaka na bangu pona kumbundela nga
Liloba ya suka ezala na maboko na Yesu
Ye ko muana ya Nzambe,
Solution ya ba problèmes
Aniata moto ya satana.
Akufa liwa ya soni.
Amema mikumba na nga na Golgotha.
Yango na kati ya moto nasi natatoli elonga
Po ete na Yesu elongo la victoire est certaine.
Ayaka tango na lembi.
Tango elikia esuki.
Ye ko amonanaka te.
Kasi asala ebele.
Alobi garder silence, moi je combattrai pour vous.
Na maboko ya kodima na simbi liloba
Nayebi soki akiti moto ekokoma malili
Yango na yembi na nzembo
Natomboli loboko pe nalobi ya mineyi akosukisa.
Refrain :
Ya mineyi akosala
Ya mineyi akosukisa
Nga nakosika te.
Oyanga aza na bomoyi
Na bomoyi na nga, Ya mineyi akosala
Ata moto epeli, ngai nakozika te oh
Na motema na nga, Ya mineyi akosala
Ata moto epeli, kimo na 100°, ngai nakozika te
Ah au nom de Jésus, Ya mineyi akosala
Na bomoyi na nga, Ya mineyi akosala.
Naza moto ya libaku malamu
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates