• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Yaweh

Refrain :
Yaweh yo ozali mokonzi
Likolo na mabota nionso
Ofandi na likolo na kiti na bule na yo
Oyebani ete ozali mobateli makasi
Libota na bana Nzambe to sanjola ye.

Couplet 1 :
Eh molimo na nga yemba
Sanjola kombo na nkolo
Motema na nga bosana te boboto na ye
Ako tanisaka moyi na ye
Likolo na mabota nionso
Akobatela ba oyo balingi ye

Chorus :
Ata na tamboli na kufa na kobanga eloko te.
Po Yawhe azali mokonzi ya bomoyi na nga.

Couplet 2 :
Lokito ya mongongo na yo
Ekweyisa ba ngomba
Nguya ya loboko na yo ekangolaka
Ba ye batiela yo motema
Ba yembaka nzembo na esengo.
Lilota na yo nde likonzi pona bato

Chorus :
Mitema nionso epusani.
Liboso ya bosantu bwa yo

Couplet 3 :
Seko na seko kombo na yo.
Ekumama

Page précédente!