• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Mokonzi Merci

Refrain:
Na tatola kombo ya lobiko
Bipai biyano na nga bikowuta
Na tiola na mbonge ya mayi ya bomoï
Yesu
Nasimbana na oyo aleki nionso Yesu
Nazal’esengo na mpo na seko

Oyaka n’elikya bipai kondima esuki
Oh Yesu
Yo nde moyi ya tongo ekimisaka butu na nga
Bipai ezali yo nde osali pe ngai nazala
Mokonzi merci po na lobiko pe
bomoi ya seko opesi na bakumameli na yo

Bilaka ya Nzambe bikomi bozui na ngai
Po na yo
Esengo na ngai na yeba été ozali Nkolo na ngai
Osopi bolingo na yo na motema na ngai
Mwana Nzambe
Ofungoli bikuke ya bosantu bwa yo po na ngai
Osangisi bonzambe na bomoto bwa ngai
Oyo ngolu
Mokonzi merci mpo na libiko mpe bomoï ya seko
Y’opesi na ba kumameli na yo

Mokonzi merci obengi ngai na kombo
Na yo mosantu
Y’obengi ngai moninga na yo na yeba
Nionso okosala
Opesi ngai loboko na yo na samba mpo na bunga te
Mokonzi merci mpo na lobiko mpe bomoï ya seko
Y’opesi na bakumameli na yo oh

Page précédente!