• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

SEKELE YA MOTEMA

Refrain :
Sekele ya motema (3x) yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema (3x) Nzambe na bana na Ye

1. Nzambe alobaki na elanga n'edeni Ô Adama oliya mbuma te
Kasi Ewa aboyaki kotosa, alobelaki nyoka, nyoka apengwisaki ye

2. Nzambe alobaki na Elombe Samisona okokata te suki na yo ya moto
Na posa ya nzoto alobelaki delila yango Delila abomisaki ye

3. Na tango oyo moyini azali konguluma ete akweyisa bana nionso ya Nzambe
Nkaké nsambom yango ezali pe konguluma kotalisa miango na ye ya mabe
Ya mbala oyo Ewa akokweya te oyo ekokoma tango esii eleka

4. Mikolo nionso ngai na etumbelo nakolelaka ngolu ya Tata na ngai
Mbula to moyi ngai na losambo nakosengaka te abongola nga
Ekobima ngai kati na hema mokili ekokamwa komona lolenge na ngai
Motona bolembu, moto na masumu, moto na botawu ye abongoli ngai

5. Bosana te mwana, bilako na nzambe, bomba yango na motema na yo
Landaka mayele ya baye banso batambolaki liboso na yo :
Talaka Rahabe abikisamaki, alandaki sekele ya bana Israël
Talaka Ruth abikisamaki, alandaki Nzambe ya bana Israël
Mwasi na kanana abikisamaki, alandaki Nzambe ya bana Israël


ADLIBITUM :
Yesu yo mwana moke olongi liwa/ Yesu yo mwana moke olongi satana
Tala ye mwana moke olongi liwa/ TOUS : Elombe na etumba

Sekele na ye ezalaki Nzambe na motema (2x)
Moïse yo mobange olongi Egypte na etumba (2x)
Sekele na ye ezalaki Nzambe na motema (2x)

Dawidi mwana moke abeti goliate na etumba (2x)
Dawidi mwana moke abomi goliate na etumba (2x)
Tala Dawidi mwana moke abeti goliate
Sekele na ye ezalaki Nzambe na motema (2x)

Abrame yo mobange aboti Izaki
Sara yo mobange aboti Izaki

Sekele na bino ezalaki Nzambe na motema (2x)

CHOEUR
Ah bilombe na etumba
Ah bilombe na kondima

Yesu yo mwana moke olongi liwa
Sekele na yo ezalaki Nzambe na motema
Biso pe bana na yo tolongi Satana
Biso pe bana na yo tolongi b'épreuves
Biso pe bana na yo tolongi mokili
Sekele na biso ezali Nzambe na motema

CHOEUR
Bilombe na etumba
Bilombe na kondima

Page précédente!